Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g97 Octobre nk. 15-18
  • Mbwa na yo ezali likámá mpo na bana?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mbwa na yo ezali likámá mpo na bana?
  • Lamuká!—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Teyá mwana na yo
  • Teyá mbwa na yo
  • Mbwa mabe
  • Ndenge oyo mbwa eyokaka nsolo
    Ebimá kaka yango moko?
Lamuká!—1997
g97 Octobre nk. 15-18

Mbwa na yo ezali likámá mpo na bana?

EUTI NA MOKOMANI NA BISO NA AFRIQUE DU SUD

MWANA ya mbula mibale na nkombo Sylvain azalaki kosakanasakana kino apusanaki mpenza pene na mbwa moko mabe oyo ebéngami rottweiler, oyo ekangisamaki na nsinga. Eumelaki te, mbwa yango eswaki Sylvain na motó pembeni na litoi mpe etikalaki moke ete elongola ye litoi ya lobɔkɔ ya mwasi. Esɛngaki ete minganga bátonga mposo mosusu na esika wana.

Lokola bato mingi bazali kosalela mbwa mpo na libateli, balapólo mpe ezali mingi mpo na kolobela bambwa mabe oyo izali koswa bana. Mitindo ya mbwa oyo eyebani ete eswaka bana ezali bongo rottweiler, doberman pinscher, bullmastiff, berger allemand mpe bull-terrier. Ankɛ́tɛ moko oyo esalemaki na Afrique du Sud emonisaki ete bana mingi baswamaki na mbwa oyo bayebaki yango malamu. Pene na bana 50 likoló na monkámá baswamaki na mbwa ya bato ya pembeni, mpe mwana moko kati na bana minei aswamaki na mbwa na bango moko. Bobele bana 10 likoló na monkámá nde baswamaki na mbwa oyo iyengayengaka. Mbala mingi, mbwa eswaka moto soki atumoli yango, ntango mosusu, kozanga koyeba. Na ntembe te, soki baboti mpe bankolo mbwa bakamati mwa meko ya sikisiki, bakoki kopɛngola ebele na makámá.

Teyá mwana na yo

Bato mingi oyo bamipesi na kobɔkɔla mbwa bazali kobenda likebi likoló na likambo oyo ete ebongi te kotika bana mike esika moko na mbwa kozanga libateli ya moto oyo azali mwa mokóló. Bana mike bayebaka te lolenge malamu ya kotalela banyama. Esengeli koteya bango. Yango wana bato mingi basɛngaka ete soki moto ya mokóló azali te, esengeli kotya mbwa na esika na yango mpe bana na esika na bango. Brian Kilcommons, moto amipesi na kobɔkɔla mbwa amonisi kati na búku na ye Childproofing Your Dog (Mesanisá mbwa na yo na bana) ete: “Engebene masoló oyo toyokaka, mikakatano mingi mibimaka soki mikóló batiki kotya likebi na bana.”

Mingimingi, na esika bana bazali, esɛngaka nde kobatela banyama! Baboti ya libota moko babyangaki Kilcommons mpo na kosunga bango mpo ete mbwa na bango elingaki koswa mwana. Wana azalaki naino na nsɔ́mɔ, tata alimbolaki ete mwana na ye ya mobali ya mbula mibale na ndambo akimaki mbango mpe abɛtaki mbwa makasi mpenza ntango yango ezalaki kolala. Mbwa eyokaki mpasi mpenza mpe elyaki mino na nkanda mpo na koswa mwana. Kasi na libaku oyo, tokamwaki ete mbwa yango eswaki mwana te. Moto yango oyo amipesi na kobɔkɔla mbwa apesaki baboti yango toli ete: “Kopesa nzela na mwana na yo te ete asalela mbwa makambo oyo bokolinga te ete asala yango epai na bana mosusu.”

Teyá mwana na yo lolenge ya komonisela banyama boboto. Teyá ye ete atumolaka mbwa soko moke te. Baboti basengeli kozala na bokɛngi mpo na kopɛngola likámá nyonso oyo likoki kobima ntango mbwa ezali esika moko na bana. Soki omoni ete mwana azali kolanda mbwa mpe mbwa ezali kokima to koluka kobombamela ye, pekisá mwana ete atika kolanda yango. Soki mwana alandi mbwa mpe apusi yango mpenza na litúmu ya efelo ya ndako, mbwa ekozala na lolenge mosusu te ya komibatela bobele konganga, konguluma, to mpe koswa. Baboti basengeli ntango nyonso kopesa disipilini mpo ete, ezala mbwa to mwana, báyeba ete baboti bazali kosala lisɛki te.

Kosundola mbwa te. Ntango babalani ya sika baboti mwana na bango ya liboso, bazalaka na momeseno ya kosundola mbwa na bango mpe kotyela yango lisusu likebi mingi te. Atako ebongi kozwa mwa meko mpo na komibatela liboso na mbwa kasi Richard Stubbs, moto ameseni kobɔkɔla mbwa, apesi toli oyo: “Ebongi te kosundola mbwa. Kasi, ebongi nde kokóba kosalela yango makambo lokola momeseno, mpe kopesa yango likebi na lolenge oyo elongobani.”

Tyá likebi na lolenge mwana na yo azali kotalela mbwa mopaya. Soki amoni moto oyo ye ayebi te, azali kotambola na mbwa na ye na nzela, asalaka nini? Asalaka nyonso ete alanda mbwa yango mpo na kosakana na yango? Teyá ye ete asalaka bongo te. Mwana asengeli liboso kotuna ndingisa ya nkolo mbwa. Soki apesi ye ndingisa, na bongo, akoki kopusana malɛmbɛ penepene na mbwa mpo ete abangisa yango te. Akoki kopusana na mbwa yango na kotɛlɛmáká mwa mosika mpe kolobáká na yango na boboto nyonso. Soki ezali mbwa ya boboto, ekopusana pene na mwana. Ezali malamu te ete mwana apusana pene na mbwa oyo ezali koyengayenga yango moko na nzela.​—Talá etanda “Bilembo mpo na kokesenisa mitindo ya mbwa,” lokasa 17.

Teyá mbwa na yo

Kumisá mbwa na yo ntango nyonso mpe zalá ntango nyonso na makanisi mabongi mpo na yango. Koteya yango na kopesáká yango bitumbu to maloba ya nkanda te mpo ete yango ekolɛmbisa mbwa. Ebongi ete mbwa eyeba kotosa ntango babéngi yango “yaká” mpe lisusu etosa bitindá ya ntina lokola “fandá!” Na bongo, mbwa ekoyekola kotosa nkolo na yango, mpe yango ekopesa na nkolo mbwa likoki ya kotosisa mbwa na ye ntango mikakatano mikobima. Maloba ya pɛtɛɛ mazali na nguya mingi koleka. Kobá kosalela bobele maloba motindo moko. Soki mbwa na yo etosi etindá moko, pesá yango mbano nokinoki, ezala na lolenge ya makumisi, ya kosakana na yango, to pesá yango mwa eloko ya kolya. Mpo na kozwa litomba oyo ekoumela, esengeli kopesa mbwa mbano nokinoki nsima ya likambo malamu oyo yango esali. Mpe na nsima zongelaká kosala bongo mbala na mbala kino mbwa ekomesana.

Soki ozwi mbwa, ezala ya moke to ya mwa mokóló, ekosɛnga ntango mosusu ete olakisaka yango mpo ete emesana na bana. Bana bazali lokola mikóló te. Bazalaka mɔ́tɔmɔ́tɔ mpe bamipekisaka te mpo na kolanda mbwa, likambo oyo likoki kobangisa nyama yango. Ezali malamu ete omesanisa mbwa na yo na mobulu ya bana. Ntango bana bazali wana te, mesanisá mbwa na yo na makɛlɛlɛ oyo makoki kobima pwasa. Tiká ete kolakisama yango esalema na lolenge ya lisano. Belelá etindá moko mpe potá mbango esika mbwa ezali. Nokinoki pesá yango mbano. Mokemoke kobá komatisa mongongo. Na mbala nyonso, sukisá na kokumisáká mbwa na yo to na kosakanáká na yango na boboto nyonso. Mbwa ekoumela te kolinga lisano yango.

Bana mike balingaka komemamema mbwa kasi osengeli koteya bango ete básalaka bongo te, mpamba te mbwa mosusu ebangaka soki moto akangi yango makasi. Kasi soki bana na yo bamemi mbwa na bino, okoki kolakisa mbwa yango ete endima likambo yango. Memá mbwa na yo na boumeli ya mwa ntango, na nsima pesá yango mwa eloko ya kolya mpe maloba ya makumisi. Kobá komema yango na boumeli ya mwa ntango molai. Soki mbwa na yo ekómi koganga to kolya mino, sɛngá lisungi epai na moto moko oyo ameseni na mosala ya kobɔkɔla mbwa.

Mbwa mabe

Mbwa mosusu ezalaka mabe longwa kobotama na yango mpe ekoki kozala likámá mpo na libota. Mingimingi mbwa mibali ezalaka mbwa mabe.

Mbwa mabe elingaka te ete bato básimba yango, mpenzampenza na bisika lokola nkingo to elongi. Nzokande, na bantango mosusu, mbwa yango ekoki kopusana pembeni na yo, kolɛmbola yo, to ata kobwakela yo makolo na nzoto, “kosɛngáká” bongo likebi na yo. Ekoki mpenza komimona lokola nkolo ya bisika mosusu ya ndako mpe kútu kopekisa basangani ya libota ete bákóma kuna te. Mbala mingi, mbwa motindo wana ekangamaka na biloko na yango ya lisano mpe ekoki koganga to kotika kosakana soki moto apusani pene.

Mpo na kondimisa bokonzi na yango, mbwa wana ekoki koboya kotosa bitindá na nkó. Ekoki kokweisa bana to koluka kowelana na bato mpo na kobima liboso na ekuke ya ndako. Ekoki mpe kolinga komata na nzoto ya bato. Engebene Brian Kilcommons, yango ezali “elembo ya bokonzi” kasi te “mposa ya kosangisa nzoto.” Moto yango oyo ameseni kobɔkɔla mbwa akebisi ete wana “ezalaka ntango nyonso elembo ete mbwa yango elingi koswa. Esengeli komizela ete mbwa yango ekosala mabe.” Mbwa oyo ekoki mpe kozala na momeseno ya kokanga nkolo na yango na lobɔkɔ mpo na kosɛnga likebi na ye.

Esengeli kokanga miso te na bilembo wana ya botomboki. Botomboki esilaka kaka bongo te; kútu ekólaka, mpe bana kati na ndako bakoki kozala na likámá. Babɔkɔli mbwa, oyo bameseni mpenza na mosala na bango, bazali kosɛnga na bankolo mbwa ete bálongola binama ya kobota ya mbwa yango, ezala mbwa ya mwasi to ya mobali, mpamba te mbala mingi yango ekitisaka nkanda ya mbwa.

Ezali likambo ya mayele te ete otya ntembe na mbwa mabe mpo na koyeba nani azali mokonzi kati na bino mibale. Kowelana mpo na bokonzi mpe kopesa mbwa na yo disipilini ya makasi ekoki mpenza kobimisa likámá. Ezali na myango mosusu ya mayele mpo na kokonza mbwa na yo.

Ntango nyonso mbwa mabe ezali kopusana pembeni na yo mpo ete opesa yango likebi mpe soki osali bongo, okolendisa likanisi ya mbwa ete yango ezali mokonzi. Na bongo soki mbwa yango esɛngi likebi, kosala eloko moko te. Basangani nyonso ya libota basengeli mpe kosala sé bongo. Na ebandeli, mbwa ekokóma na nkanda mpe ekoki kútu koganga to kotala yo na miso ya mawa, kasi kolanda wana te. Soki mbwa yango etiki yo mpe ntango mosusu ekei kolala na eteni na yango ya ndako, na ntango wana nde okoki kopesa yango mwa likebi. Na kosaláká bongo, mbwa na yo ekoyeba ete yo nde ozali mokonzi mpe ozali na lotómo ya kopona ntango oyo okotyela yango likebi.

Masano makasi, na ndakisa masano ya kowela eloko to ya kobundabunda, ekoki kolendisa mposa ya mbwa ya kokonza bato; na bongo esengeli kopɛngola masano ya lolenge wana. Ebongi mpenza kosalela masano mosusu.

Ezali malamu te kolalisa mbwa na eteni na yo ya ndako ya kolala. Kuna, mbwa ekomimona ete etyami na etɛlɛmɛlo ya lokumu koleka bana. Nzokande, ebongi kosalela mbwa esika na yango ya kolala na kúku to na mwa ndako libándá ya ndako ya monene. Mingimingi ezalaka kati na biteni na bango mpenza ya kolala kati na ndako nde mbwa mabe eswaka bankolo na yango.

Soki nsima ya milende nyonso oyo ozali kosala, to na boumeli ya ntango oyo ozali kolakisa mbwa yango, to na ntango nini mosusu, mbwa na yo ezali kotosa yo te mpe ezalela yango ekómi kobangisa yo, sɛngá lisungi ya moto oyo asalaka mosala ya kobɔkɔla mbwa, oyo akɔmeli. Monganga ya mbwa na yo akoki kolakisa yo moko kati na babɔkɔli yango ya makoki. Sololá na ye liboso mpo ete oyeba myango oyo ye asalelaka, mpe ondimisama ete akoki kosalisa yo. Richard Stubbs, oyo asalaka mosala ya kobɔkɔla mbwa, apesi likebisi oyo: “Botosi oyo mbwa mabe ekoki komonisa epai na moto oyo amesani kobɔkɔla mbwa ezali ndanga te ete ekosala lolenge moko liboso na nkolo na yango.” Nkolo mbwa asengeli bongo komindimisa ete mbwa na ye ekoki kotosa ye soki yango etomboki.

Ata nsima ya kolakisama malamu mpenza, mbwa mosusu ekotikala bobele mbwa mabe, mpe kozala na yango ekotya ntango nyonso bomoi ya basangani ya libota na yo na likámá. Nsima ya kosala nyonso oyo ekoki na yo, ntango mosusu okomona ete eleki malamu kokabwana na mbwa yango na esika ete eya koswa to kozokisa yo mokolo mosusu. Ekozala malamu ete osɛnga toli epai ya monganga ya mbwa to moto moko oyo asalaka mosala ya kobɔkɔla mbwa. Okoki kosala ete moto mosusu azwa yango, kasi osengeli mpenza koyebisa ye mikakatano oyo okutanaki na yango.

Peter Neville, oyo asalaka mosala ya kobɔkɔla mbwa, apesi toli oyo: “Ezali na malako ya sikisiki oyo osengeli kosalela mpo na mbwa mabe na oyo etali liponi malamu ya nkolo na yango ya sika mpe bonene ya likámá oyo ezali liboso na nkolo yango. Soki ezali mpenza mpasi mpo na kobatela mosangani moko ya libota oyo azali na likámá monene liboso na mbwa yango, ebongi kopona malamumalamu moto oyo akozala nkolo ya sika ya mbwa yango, to mpe bobele koboma yango.”

Bana bakoki koyeba makambo mingi mpe kokólisa mayoki na bango na kozaláká na mbwa oyo ekómi lokola moninga na bango. Na kobateláká bana mpe mbwa, baboti bakosalisa bana nyonso ete bázala na makanisi malamu likoló na mbwa na bango.

[Etanda na lokasa 17]

Bilembo mpo na kokesenisa mitindo ya mbwa

Mbwa mabe emonisaka bizaleli ya boninga te. Na koteyáká mwana na yo bilembo oyo mbwa mabe emonisaka, okoki kosunga ye ete apɛngola likámá.

● Na bantango mosusu, mbwa mabe emimonisaka monene koleka lolenge monene na yango mpenza ezali. Nsuki na yango ya nkingo ekoki kotɛlɛma na mbala moko. Mbwa yango ekoki koganga wana etɛlɛmisi mokila na yango ngwi. Soki ezali koningisa mokila na yango na lombangu, yango ezali te elembo ya komonisela yo boninga. Kopusana pembeni na yango te.

● Mbwa ya bibangabanga ekitisaka motó mpe matoi na nsé mpe etyaka mokila na yango katikati na makolo. Soki opusani pembeni na yango, mbwa oyo ekoki kokóma na nkanda mpo na kobangabanga na yango. Kotumola yango te.

● Mbwa ya boboto etombolaka motó likoló mingi te, mpe ekitisaka yango mingi te, efungolaka monɔkɔ mpe ekitisaka mokila mwa moke, koleka mokɔngɔ te, kasi ekolalisa yango te. Koningisaningisa mokila na yango ezali elembo ya boninga. Mingimingi ezalaka likámá te na kosala boninga na mbwa yango.

(Malako mauti na búku Childproofing Your Dog (Mesanisá mbwa na yo na bana) ya Brian Kilcommons mpe Sarah Wilson.)

[Etanda/Bililingi na lokasa 18]

Mwa malako mpo na komibatela liboso na mbwa

1. Batelá bana na yo ya mike liboso na mbwa.

2. Teyá mwana na yo ete ameka te kotumola mbwa.

3. Liboso ya kosakana na mbwa oyo ye ayebi te, mwana asengeli kotuna ndingisa ya nkolo mbwa yango.

4. Mesanisá mbwa na yo ete atosaka bitindá ya mikemike.

5. Mesanisá mbwa na yo na komemamema.

6. Boyá masano makasi.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto