Bolingo ya boklisto emonisami kati na makámá makwelaki mokili ya Mexique
KATI na zulunalo moko ya Mexico totángaki boye: “Na boumeli ya mikolo 20 oyo miuti koleka, kobebisama oyo euti na biloko bizalisami—bikumbaki mpe koningana ya mabelé—esalemaki mingi na bokúla ya mai na Mexique, ebomaki bato mingi mpe ebebisaki biloko ebele.”—El Financiero, 17 Ɔkɔtɔ́bɛ 1995.
Na ebandeli ya Ɔkɔtɔ́bɛ, bamboka ya Mexique oyo: Campeche, Quintana Roo mpe Tabasco ebebisamaki mingi na ekumbaki ebéngami Opal. Batángaki pene na bato 200 oyo bakufaki mpe koleka bato 150 oyo bazokaki, bato 500 000 babungisaki biloko na bango mpe bankóto ya bandako ebebaki to ebukanaki nyɛ.
Bobele ntango biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova na Mexico eyokaki makámá wana, batindaki ndeko moko akenda kotala Batatoli ya Yehova ya bitúka yango. Bayokaki ete bato koleka 2 500 kati na bango basengelaki kotika bandako na bango. Bayambamaki na boboto epai ya Batatoli mosusu.
Bituluku ya lisungi bityamaki. Bilei, bilamba mpe mosolo epesamaki epai na baoyo bazalaki na mposa na yango. Ntango mai ekaukaki, Batatoli babandaki kotonga lisusu bandako ya bandeko na bango baklisto.
Mwa 9 Ɔkɔtɔ́bɛ, koningana ya mabelé makasi, na nguya ya badɛgrɛ́ 7,6 na emekeli ya Richter, ebebisaki bamboka ya Mexique oyo: Colima mpe Jalisco. Ndako ya Bokonzi mwambe ya Batatoli ya Yehova ebebisamaki mpenza. Bandako na bango zomi na mibale ekweaki mpe bandako mosusu soko 65 ebebisamaki. Lisusu, komité ya lisungi ebongisamaki mpe lisungi epesamaki.
Na nsima, mwa 20 Ɔkɔtɔ́bɛ koningana mosusu ya mabelé ebebisaki mbala oyo mboka Chiapas. Bandako ya Batatoli 88 ebukanaki mpe bandako 38 ebebisamaki mpenza. Ndako ya Bokonzi mibale ebukanaki nyɛ mpe mosusu minei ebebisamaki mpenza. Pene na ntango yango, mai oyo mautaki na ekumbaki Roxanne mabebisaki bandako ya Batatoli soko 80 na mboka Veracruz. Bandako minei ebukanaki nyonso. Mosolo ya lisungi oyo mopesamaki na Batatoli ya Yehova mopesaki nzela mpo na kosunga nokinoki baoyo bazwaki makámá yango.
Atako Batatoli mosusu bazokaki bisika mosusu na nzoto mpe babukanaki, moko te abungisaki bomoi na ye na ntango ya kobebisama wana oyo euti na biloko bizalisami. Na mobimba, pene na batóne 24 ya bilei mpe batóne 4 ya bilamba etindamaki epai na baoyo bazwaki makámá yango. Bato mingi oyo bamonaki, babimisaki mayoki na bango mpo na mosala ya lisungi. Mwasi moko na Colima alobaki ete: “Nayokaka balobaka ete Batatoli ya Yehova bazali na bomoko, kasi sikawa namoni yango na miso na ngai moko.”
Mbala mingi bato balobaki maloba malandi ntango bamonaki Batatoli ya Yehova mpe lisungi na bango: “Bazali mpenza bandeko ya solo.” “Ezali etuluku oyo ebongisami malamu koleka.” Kútu basusu balobaki boye: “Soki bituluku nyonso oyo biyaki kopesa lisungi na yango bizalaki kosala lokola Batatoli ya Yehova, mbele engumba mobimba esili kopɛtolama.”
Batatoli koleka 440 000 na Mexique bazali sikawa koteya nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na bazalani na bango. Bolingo oyo bamonisaki bamoko na bamosusu na ntango ya kobebisama euti na biloko bizalisami, oyo euti kosalema, epesi litatoli monene.—Yoane 13:34, 35.