Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g95 Juillet nk. 17-19
  • Nzoto na yo esengeli na mpɔngi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzoto na yo esengeli na mpɔngi
  • Lamuká!—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mosala ya mpɔngi
  • Osengeli kolala ntango boni?
  • Makámá mauti na bozangi ya mpɔngi
  • Kolekisa butu malamu ya mpɔngi
  • Nasala nini mpo nalalaka mingi?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Zwá ntango ya kolala!
    Lamuká!—2003
Lamuká!—1995
g95 Juillet nk. 17-19

Nzoto na yo esengeli na mpɔngi

“NAKONDIMA kopesa nyonso nazali na yango mpo na kozwa butu ya mpɔngi malamu!” Komilela ya boye ezali koyokana mingi na mikolo na biso. Mbala na mbala, bato mingi bamipesaka na makasi na misala na bango, yango wana mitungisi ya mokolo na mokolo mpe mikakatano ya bomoi ya lelo emonisaka bango mpasi.

Minganga, bapolisi, babomi-mɔ́tɔ, batambwisi mituka ya minene, bato oyo ngonga na bango ya mosala ebongwanaka, bamama elongo na bana mike mpe bato mosusu mingi bazali kati na baoyo bakoki mpenza komipimela mpɔngi oyo nzoto na bango ezali na yango mposa. Bamilió ya bato oyo bazali na mitungisi oyo misangani na kozanga mpɔngi bazali na mposa makasi ya koyeba ndenge nini kozwa mpɔngi ya malamu mpe ya kimya.

Mosala ya mpɔngi

Mpɔngi, to mwa ntango ya komipemisa, emonani ete ezali likambo oyo lizali bipai binso kati na bikelamu nyonso ya bomoi. Soki ozali na banyama oyo bato bameseni na yango mingi lokola, nyau, mbwa to ndɛkɛ, na ntembe te osilá komona ete nyau mpe mbwa bazalaka na momeseno ya komizínga liboso ya kolala mpe ete bandɛkɛ bakómaka kimya mpe bakendaka kolala wana molili ekɔti. Pene na banyama nyonso, bandɛkɛ nyonso mpe nyamankɛkɛ nyonso bazalaka na mposa ya kolala to na mwa ntango ya mosala moke. Mpo na bato, mpɔngi ezali mpenza mposa oyo esengeli.

Bato mosusu bakanisaka ete mpɔngi ezali bobele mwa ntango ya komipemisa. Nzokande, esukaka bobele wana te. Zulunalo The Toronto Star elobi: “Mpɔngi ezali mpenza ebongiseli moko ya konanolama mpe kofungwama ya mintúngu, kobeta ya motema, komata mpe kokita ya kotambola ya makila mpe makambo oyo mautaka na makanisi yango moko.” Búku The World Book Encyclopedia elobi: “Ntango moto alali, misala na ye nyonso mikiti mpe mintúngu mikangami. Kobeta ya motema mpe kopema ekiti.”

Atako bato na mayele, minganga mpe balukiluki basili koyekola mpɔngi na boumeli ya bambula mingi, mokakatano mozali naino mpo na koyeba mosala ya mpɔngi. Balukiluki yango bayebi naino te soki mpɔngi ezali mpenza nini mpe mpo na nini tolalaka. Eliot Phillipson, Monganga ya laboratware ya bolukiluki ya likambo litali mpɔngi na lopitalo Queen Elizabeth na Toronto alobi: “Toyebi te ebongiseli ya nzoto oyo ebimaka na ntango ya mpɔngi oyo bizongiselaka biso makasi.”

Na boumeli ya mpɔngi, mbongwana esalemaka kati na nzoto, mbongwana oyo ezalaka na bopusi likoló na système immunitaire oyo tozali na yango. Binama ya nzoto biminanolaka mpe bizwaka bopemi mpo na kozongela nguya oyo tobungisaki na misala ya mokolo mobimba. Bopɛtoli ya mobimba esalemi malamu na nzela ya botamboli ya makila mpe bokatikati ya nzoto ezongisami. Na yango, mpɔngi ekoki kokokanisama na etuluku ya bato oyo bazali kosala na butu oyo bakɔti mpo na kobongisa biloko mpe kokɔmbɔla mpo na mokolo oyo molandi.

Moko na misala minene ya mpɔngi ezali mpo na kopesa nzela na ebongiseli ya misisa ete ezwa bopemi nsima ya kosala misala ndenge na ndenge na boumeli ya mokolo. Lokola búku The World Book Encyclopedia elobi yango: “Mpɔngi ezongisaka nguya na nzoto, mingimingi na bɔɔngɔ́ mpe na misisa ya motó.”

Osengeli kolala ntango boni?

Mikóló mingi basengeli kolala ngonga nsambo to mwambe butu nyonso. Bamoko balalaka ngonga moke, basusu mingi koleka. Ezali na bato mosusu oyo balobaka ete basengeli bobele na ngonga minei to mitano ya mpɔngi, atako basusu kati na bango bakoki komipemisa na moi. Bana mike basengeli kolala mingi koleka mikóló.

Mingimingi ntango bato bakómaka mibangé, bakoki komona ete bálamukaka mbala mingi na butu. Basusu bakoki kokanisa ete yango ezali ebandeli ya mokakatano monene mpo na mpɔngi. Nzokande, atako mibangé bazali lisusu te na likoki ya kolala lolenge bazalaki na yango ntango bazalaki bilenge, bato na mayele basili komonisa ete kolamuka na mwa bantango mosusu na butu ezali likambo ya komitungisa na yango te. Na momeseno, ntango ya kotala mpo na baoyo bazali na mokakatano wana ezalaka mokuse, mbala mosusu bobele mwa miniti moke liboso ete bázwa lisusu mpɔngi.

Nzokande, ezala mbula nini moto azali na yango, asengeli komizela te ete azala na kozinda na mpɔngi lolenge moko na boumeli ya butu mobimba. Mpɔngi eyaka mokemoke na biteni bikeseni; kati na yango tozali kokuta mpɔngi ya makasi mpe mpɔngi ya likolólikoló. Na boumeli ya butu, moto akoki koleka na biteni wana bikeseni.

Makámá mauti na bozangi ya mpɔngi

Zulunalo The Toronto Star elobi ete: “Balukiluki bakómi komipesa mingi koleka na motuya ya bato oyo balalaka mpenza mingi te. Bakebisi ete; bozangi ya mpɔngi ntango nyonso ekoki kobimisa matomba mabe mpo na biso moko mpe mpo na bato oyo bazali na biso elongo.”

Búku The World Book Encyclopedia ekomi ete: “Bato oyo bazangaka mpɔngi babungisaka nguya mpe bakómaka nkandankanda. Nsima ya kolekisa mikolo mibale kozanga mpɔngi, moto amonaka ete likoki ya kokanisa na mozindo ekómaka mpasi . . . Mabungá mingi masalemaka, mingimingi na misala ya mokolo na mokolo, mpe moto azalaka te na likoki ya kotya likebi mpo na ntango molai . . . Bato oyo balalaka te na boumeli ya mikolo koleka misato bazali na mokakatano monene ya kokanisa, ya komona mpe ya koyoka malamu. Basusu bazalaka na bileko ya bandɔ́tɔ mpamba, na boumeli na yango bamonaka biloko oyo bizalaka te na mokili.”

Bolukiluki emonisi ete nsima na mikolo minei ya kozanga mpɔngi, moto oyo basali ye ekzamɛ́ akoki kokokisa bobele mwa misala moke oyo amesani na yango. Misala oyo misɛngaka likebi to nkutu likoki moke ya kokanisa ekómi mpasi mpo na kosala yango. Kokita ya likoki ya kotya likebi mpe kokanisa ezalaka te makambo oyo mazali mabe koleka. Nsima ya mikolo minei na ndambo, bilembo ya mobulungano bimonanaka mpe likoki moto azalaka na yango ya komona ebandaka kobeba.

Bozangi ya mpɔngi ekoki komema na mikakatano minene. Bato mingi balalaki wana bazalaki kokumba motuka mpe yango ememaki na likámá ya kufa. Bozangi ya mpɔngi mpe ekoki komema na mikakatano kati na libala mpe kati na libota, mpamba te bozangi ya mpɔngi ntango nyonso ekómisaka moto nkandankanda mpe makambo makasi mpo na kofanda elongo na ye. Kolekisa butu malamu ya mpɔngi ezali likambo ya ntina koleka ndenge basusu bakoki kokanisa yango.

Kolekisa butu malamu ya mpɔngi

Monganga Jeffrey J. Lipsitz, moto na mayele ya Centre ya Metropolitan mpo na mikakatano ya mpɔngi na Toronto apesi makanisi oyo malandi mpo na kolekisa butu malamu ya mpɔngi: Lalá na esika ya malamu, ya kimya, ya molili, mpe na mbeto kitoko. Komipemisa te nsima ya ngonga na mokolo, ata soki olalaki malamu te na butu oyo eleki; meká kosɛnzɛla kino okokende kolala na ngonga oyo omesani na yango. Komela kafé te liboso ya kolala. Kotánga te to kotala televizyó te wana olali na mbeto. Kosala ngalasisi ya makasi te mpe kolya biloko ya kiló te liboso ya kolala. Zalá na ngonga oyo omesani na yango mpo na kolala, yango ekosalisa nzoto ete ezala na momeseno ya kolala mpe kolamuka sé na ntango yango.

Zalá na momeseno ya kominanola liboso ya kolala. Pɛngolá kosala makambo oyo makoki kosala ete oyoka mpɔngi te. Na ndakisa, pɛngolá bafilime, baemisyó ya televizyó to botángi ya mikanda oyo ekoki kolamwisa mayoki ya nzoto. Kozala na masoló ya kolamwisa mayoki liboso ya kokende kolala ekoki mpe kosala ete ozanga mpɔngi.

Mpo na basusu, kosukola mwa mai ya mɔ́tɔ, kotánga mwa lisoló ya kosepelisa ezali mpe malamu. Na yango, mbala mosusu bimeli oyo bipesaka mpɔngi, lokola mwa miliki ya mɔ́tɔ, babeure, mwa vinyo moke, to mwa tíi ya nkasa​—kasi tii oyo ezali na caféine te.

Nzokande, endimami na bato ete bobele kominanola liboso ya kolala ekoki mpenza te. Tokolala malamu wana bomoi na biso ezali malamu mpe na bokatikati, wana tozali kosala ngalasisi mbala na mbala mpe tozali na mayoki te ya bobangi mpe ya kozanga kolónga oyo eutaka na lokoso, na zuwa, na mayoki ya bonguna mpe na bamposa mingi. Lisusu, tokolala malamu soki tozali te kolekisa ndelo mpo na oyo etali kolya mpe komela mpe soki tozali te na mawa oyo mautaka na etamboli ya mbindo.

Kokokisa bamposa na biso ya elimo ekoki kosalisa mingi mpo na kozwa mpɔngi ya malamu mpe ya kimya. Ekosunga biso na kososola makambo ndenge na ndenge ya mokili oyo tozali kofanda kati na yango mpe kolanda bomoi ya bokatikati mpe ya bosepeli. Mosaleli moko ya Yehova, oyo azalaki na mayele, alendisi biso na kokólisa bososoli mpe kosimba mayele ya Yehova, mpo ete yango ekokamba biso na “bomoi ya bosepeli mpe ya esengo.” Mpe abakisi ete: “Ekolala yo mpɔngi, okobanga te; ɛɛ, okolala mpe mpɔngi na yo ekozala kitoko.”​—Masese 3:21-24.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 18]

Bozangi mpɔngi ntango nyonso ekoki kobimisa matomba ya mabe

[Elilingi na lokasa 18]

Mikóló mingi bazali na mposa ya ngonga nsambo to mwambe ya mpɔngi butu nyonso

[Elilingi na lokasa 18]

Bato mingi bazalaka na mokakatano mpo na kozwa mpɔngi

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto