Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g95 Juillet nk. 12-14
  • Kokɔ́ta nyongo esalisaka?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kokɔ́ta nyongo esalisaka?
  • Lamuká!—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Boyá banyongo mingi
  • Biblia ekoki kosunga yo?
  • Ndenge ya kofuta banyongo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Biblia ekoki kosalisa na makambo etali mbongo mpe banyongo?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Ndenge ya kosalela mbongo
    Lamuká!—2019
  • Nyongo oyo tozali na yango epai ya bato mosusu
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
Makambo mosusu
Lamuká!—1995
g95 Juillet nk. 12-14

Kokɔ́ta nyongo esalisaka?

“KOLYA mosolo na yo soko moke te liboso ete ozwa yango.” Lokola kokɔta banyongo ezali mwango ya kobikela na bomoi mpo na bato mingi lelo, toli oyo epesamaki na Thomas Jefferson, presidá ya kala ya États-unis, emonani lokola esilá ngala?

Kati na mikili mingi, mosolo ya nsuka ya sanza ezalaka na nsé ya ntalo ya biloko, mpe komata ya ntalo ya biloko ezali kokitisa motuya ya mosolo oyo mobombami. Lisusu, makambo matali nkita mazali na bopusi likoló na bizaleli ya bato. Nzokande, kolongobana ezali na ntina. Mpamba te makambo lokola, koboya kofuta mpako, kokoka kofuta banyongo te epanzani mingi, ezali mpenza komekama mpo na kobatela lisosoli malamu. Na bongo, likambo ya kokamwa ezali te ete nkita ezali kolobelama mingi mpe makanisi ya kobomba mpe kozwa mosolo matondi na mikanda, na bazulunalo mpe na televizyó lokola bato bazali koluka koyeba meko nini bakoki kokamata mpo na kosilisa mikakatano ya nkita. Bobele na ntango yango, ezali malamu mpo na yo ete otalela lolenge nini okoki kokokisa bamposa na yo moko mpe ya libota na yo.​—1 Timoté 5:8.

Lokola bobele mwa bato moke nde bazali na nkita ya malonga, eloko nini okoki kosala mpo na kopɛngola mpasi kati na libota na yo? Ya liboso, ezali na liteya moko ya ntina ya kobatela kati na makanisi.

Boyá banyongo mingi

Mpo na nini bato mosusu bakɔtaka banyongo? Kodefa mosolo eutaka ntango nyonso te bobele mpo na likambo ya mpasi, lokola bokɔnɔ. Mposa ya kozala na biloko mosusu ya mosuni ekoki kozala makasi koleka. Epai mosusu, bantina ya kokɔta banyongo ezalaka ntango nyonso mabe te. Ya solo, ekoki koleka malamu kozwa krɛdí mpo na ndako na esika ya kofutela ndako, to ekoki kozala malamu koleka kosomba motuka. Tata malamu ya libota alingaka ete libota na ye lizala na biloko bisengeli na yango mpo na kozala na esengo. Alingaka kolónga lokola mobali mpe tata. Mbala mosusu azali na likanisi ete libota na ye bazali na lotómo ya kosepela na biloko mingi ya mosuni oyo bato mosusu bazali na yango.

Ya solo, okoki komekama na kodefa mosolo mpo na kosomba eloko moko oyo oyoki mposa na yango kasi osengeli na yango mpenza te. Kozala na biloko epesaka bosepeli, boye te? Nani asepelaka te na elamba ya kitoko, sapato ya sika to mpe eloko lokola motuka ya sika oyo ezali kongɛnga? Mpe nani alingaka te kozala na ndako kitoko? Kasi, keba! Bato ya mombongo bakoki kozala balengoli, mpe bazwaka mosolo mingi na kotɛkisáká biloko epai na bato oyo basengeli na yango te to bazali na makoki ya kosomba yango te.

Omikundola mpe ete, kofuta banyongo sanza na sanza ekoki kobimisa matata kati na libota. Kozanga boyokani mpe nkanda ekoki komonana. Mokomi na masolo ya teyatre Henrik Ibsen azalaki na elónga ntango alobaki: “Libota oyo etongami likoló na banyongo mpe kodefadefa lizalaka na bonsomi te mpe na makambo elengi te.” Soki ozali kofuta banyongo na yo na ntango esengeli te, lokumu na yo lokoki kobeba. Lokola ezalaka nkaka te kolya mosolo oyo odefaki na esika ya kofuta yango elongo na matabísi, bato mingi bayaka komona ete oyo basombaki ememi te bosepeli oyo bango bakanisaki.

Na momeseno, biyangeli bizali kokóba na kodefáká mosolo mingi koleka, komibakiseláká intérêt oyo basengeli kofuta. Atako yango emonani lokola ete esengeli mpo na bango, mpo na nini komekola mikili oyo mitondi na banyongo? Na esika ya kosala ete bato bazala malamu, banyongo mingi ezali nde kokólisa bobóla mpe kozanga libateli. Lokola lisese ya ba Danois elobi yango: “ezali mpasi mpo na kofuta limpa oyo lisili kolyama.”

Likambo ya esengo, kotungisama na makanisi oyo eutaka na bozito ya banyongo ekitaka makasi soki oyekoli kolya mosolo na yo na lolenge ya mayele. Na bongo, zwá ntango ya kosala mwango malamu ya biloko yo okosomba mpo ete opɛngola bopusi ya kodefa mosolo. Ata kati na mikili oyo mosolo ekiti mingi, likoki ya kobomba mosolo ezali​—na kosombáká biloko ya ntina oyo bizali na ntalo moke mpe na kosombáká bobele biloko oyo osengeli na yango mpenza. Esɛngaka kobikela mokemoke na makoki na yo, kozanga koluka to kozela biloko mosusu.

Omituna yo moko: Soki nakɔti banyongo libota na ngai likozwa mpasi mpo na yango? Ezali boni mpo na lokumu na ngai soki nakoki kofuta nyongo yango te? Mbala mosusu ekosengela ntango molai mpo ete bakoka kotyela yo lisusu motema! Mpo na yango, toli ebongi mpe ya sikisiki ezali na ntina. Mpo na nini te kotalela Biblia mpo na komona soki ekosunga yo mpe libota na yo mpo na makambo matali kodefa mosolo?

Biblia ekoki kosunga yo?

Likambo lileki ntina lizali oyo ete Biblia ekoki kosalisa biso banso na kolóna ezaleli ya kotya motema epai na Yehova. Ya solo, tozali na mposa ya lisungi na “ntango ya mpasi oyo tozali na yango.” (2 Timoté 3:1) Topesameli toli oyo: “Ezaleli na bino ezanga mposa na mosolo; bosepela na biloko bizali na bino. Zambi ye alobaki ete, Nakotika yo soko moke te, nakosabola yo mpe te. Boye biso toyebi kozala na molende awa elobi biso ete, Nkolo azali mosungi na ngai, nakobanga te. Moto akosala ngai nini?” (Baebele 13:5, 6) Oyo nde likambo ya malamu ya kolóna kondima makasi epai na Nzambe lokola Mopesi na biso!

Atako Biblia elobeli te lolenge nini moto na moto asengeli kobikela, kasi epesi litambwisi libongi. Yesu Klisto alendisaki bayoki na ye ete bámibanzabanza liboso mpo na makambo na bango ya elimo: “Esengo na baoyo bazali komibanzabanza mpo na bamposa na bango ya elimo.” (Matai 5:3, NW) Lisusu, tolendisami ete tomityela mikano: “Bomeka kofanda na kimia mpe kobatela makambo na bino mpenza mpe kosaláká misala na mabɔkɔ na bino pelamoko biso tolakisi bino; ete botambola na ezaleli kitoko liboso na bato na libándá mpe ete bozala na bosɛnga na eloko te.” (1 Batesaloniki 4:11, 12) Kofanda na kimia mpe kosepela esɛngaka kobika engebene makoki na biso, boye te?

Liloba ya Nzambe likoki kosunga biso mpo na kosembola makanisi na biso. Mokomi na Masese amonisaki likanisi ya bokatikati na kosɛngáká epai na Nzambe: “Pesa ngai bobola te, bozwi mpe te. Leisa ngai bilei bikoki na ngai, ete natónda te mpe boye naangana yo te, naloba te ete, [Yehova] azali nani? Soko ete nazala mobola te mpe nayiba te, nabimisa nkombo na Nzambe na ngai na mpamba te.” (Masese 30:8, 9) Na bongo, koyoka nsɔni te soki osengeli kozala bobele na mwa mosolo moke mpo na mwa ntango. Kotika soko moke te esengo na yo etalela biloko ya mosuni, lokola bato mingi basalaka yango, na komikokanisáká bango moko na basusu to komitungisáká koleka ndelo mpo na biloko ya mosuni.​—Matai 6:31-33.

Lisusu, Biblia ezali kosunga biso na kolóna bizaleli malamu. Yekola kozala mobateli malamu na mosolo kasi moto na mabɔkɔ makasi te, kozwáká bosepeli na biloko oyo ozali na makoki ya kosomba yango. Soki ozali elenge, komizela te ete ozwa nokinoki biloko oyo bakóló bazwi na boumeli ya bambula mingi ya mosala. Pɛngolá kozala moombo ya biloko ya mosuni. Na bosembo nyonso, Biblia ezali kokebisa biso mpo na mosolo te kasi nde mpo na “mposa ya mosolo,” elobi na ntina na yango ete: “Kasi baoyo bazali na mposa na kozwa mosolo, bakokwea na kati na komekama mpe na lilonga, mpe kati na mposa ezangi ntina mpe ikoyokisa mpasi. Mposa yango ikozindisa bato na liwa mpe libebi nye. Zambi mposa na mosolo ezali ntina na mabe nyonso. Mpo na yango, bamosusu basili kopɛngwa longwa na kondima mpe bamitɔbɔ́li bango mpenza na bolɔzi mingi.” (1 Timoté 6:9, 10) Ezali bongo likambo ya ntina ete oyeba kokesenisa kati na eloko oyo osengeli na yango mpenza mpe eloko oyo oyoki bobele mposa na yango!

Nzokande, ozali komona ete mosolo ozwaka ezali moke mingi? Ya solo, ezali pɛtɛɛ te na koyika mpiko na bobóla kozanga kotungisama. Kasi, lingá ete ozanga biloko bisusu oyo bizali na ntina mpenza te na esika ete okɔta banyongo mpo na yango, oyo ekoki kobimisela yo kiló monene mpe ata kobungisela yo mosolo. Salá myango na likebi mpe zalá mobateli malamu na mosolo mingi. Okoki kozwa makanisi mabongi na kosololáká na moninga moko oyo azali na eksperianse mingi. Ekozala litomba na koyekola mosala moko ya sika? Omikundola: Kolanda mitinda ya Biblia, kotya liboso makambo ya elimo mpe kotya motema mobimba na Yehova ezali eloko eleki ntina​—ezala ata kati na makambo nini.​—Bafilipi 4:11-13.

Ya solo, kokɔta banyongo ekoki ntango nyonso kosalisa te. Elobamaki boye ete: “Moto oyo akɔti banyongo akangami na monyama.” Bozito ya banyongo ekoki kobebisa bomoi ya libota, kobebisa kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto mpe ya elimo. Nyongo ekoki nkutu kokómisa modefi mobóla koleka. Masese 22:7 elobi ete: “Mozwi azali mokolo likoló na mobóla; modefi azali moombo na modefisi.” Na yango, pɛngolá banyongo ezangi ntina. Tokoki lelo kozwa litomba na lilako na etinda oyo ntoma Paulo apesaki na baklisto ete: “Bozalaka na nyongo epai na moto moko te, bobele nyongo na kolingana. Mpo ete ye oyo akolingaka moto mosusu, azali kokokisa mibeko.”​—Baloma 13:8.

Ata ezalela ya nkita kati na mboka na yo ezali motindo nini, zelá na elikya nyonso mokili ya sika ya Nzambe. Mosika te, bato bakokabwana lisusu te epai moko badefisi mpe epai mosusu badefi. Na nsé ya Bokonzi ya Nzambe, moto moko te akozala mobóla. Elaka oyo ya Nzambe ekokokana: “Zambi ye akobikisa mobóla oyo akonganga mpe moto na mawa oyo azali na mosungi te. Akoyokela moto na bolɔzi mpe mobóla mawa; akobikisa milimo na babóla.” (Nzembo 72:12, 13) Na esika ya koboma nzoto mpo na koluka eloko ya kobikela, bafandi na mabelé “bakosepela [nde] na kimya na solo.”​—Nzembo 37:11.

[Elilingi na lokasa 12]

Thomas Jefferson

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Ekembisami na Gilbert Stuart. Courtesy Bowdoin College Museum of Art/Dictionary of American Portraits/Dover

[Elilingi na lokasa 13]

Kokɔta banyongo minene ekoki kotya mobulu kati na libala na yo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto