Kotambola likoló na zɛlo Litambe mpo na kolɔngɔ́nɔ́ malamu
EUTI NA MOKOMANI NA BISO NA HAWAII
OTAMBOLA nokinoki ezali ngalasisi ya malamu koleka. Balobaka ete kati na matomba mosusu, kotambola nokinoki elendisaka kobeta ya motema, ekitisaka bopusi ya makila, epesaka nzela na kotambola malamu ya makila, ebongisaka loposo ya nzoto, elendisaka mikuwa mpe misuni.
Nzokande, lokola moto nyonso oyo asilá komeka yango ayebi, kotambola ya nokinoki etyaka makaka na likámá monene—kokotwa (durillons), mantutu mpe bampota mosusu ya minene. Yango eutaka mingi na kolata sapato oyo ebongi te mpo na ngalasisi. Soki osila koyoka mpasi na makolo, oyebi mpenza lolenge yango etungisaka mpe esalaka mpasi. Lisusu, lolenge ya makolo na yo mpe ekoki kozala na mbeba likoló ya mikuwa na yo nyonso ya nzoto.
Kosangisama ya matomba
Okoki kopɛngola makɔnɔ. Orthopédiste moko (Monganga oyo abongisaka mbeba ya nzoto epai ya bana) alobi ete: “Bolukiluki oyo bosalemaki epai na bafandi ya Afrika mpe ya Azia oyo batambolaka makolo-ngulu emonisi ete bato oyo balataka sapato te bazali na makolo kolɔngɔ́nɔ́, etɛngama te mpe bazali na mbangu koleka bato oyo balataka sapato.” Na bongo, emonani ete okoki kosangisa matomba ya lolenge ya bato wana mibale (oyo balataka sapato na baoyo balataka yango te) soki okoki kosala ngalasisi ya kotambola nokinoki esika moko makolo-ngulu. Ya solo, likanisi yango lipesameli epai na bato mingi—kotambola bobele likoló na zɛlo ya kokauka to ya mpembeni ya mai.
Kati na búku The Arthritis Exercise Book tozali kotánga boye: “Ngalasisi ya malamu elongo na konyolisa nzoto ezali kotambola makolo-ngulu likoló na zɛlo ya libongo, mingimingi soki zɛlo ezali na molungé. Kotambola likoló na zɛlo esɛngisaka lokolo emesana na esika ya mabulu mpe bangomba mpe na bongo esalaka ngalasisi na misisa.” Lisusu, kotambola likoló na zɛlo esɛngaka nguya ya nzoto mbala mibale koleka kotambola likoló ya matiti, to likoló na simá. Na bongo, meká kokima mbangu likoló na zɛlo oyo ekauka mpe okomona molende oyo yango esɛngaka! Búku Exercise Physiology—Energy, Nutrition, and Human Performance epesi likanisi oyo: “Ya solo, kotambola nokinoki likoló na zɛlo ezali ngalasisi malamu koleka mpo na baoyo balingi ‘kotumba’ bakalori to kobongisa bomoto na bango.”
Na yango, kotambola makolo-ngulu likoló na zɛlo epesaka bobele matomba te mpo na kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto kasi mpe ekitisaka mikakatano oyo esalemaka na makaka mpe matonga ya makolo. Mpo na baoyo babelaka arthrite, elɛmbisaka mpasi oyo eutaka na ngalasisi.
Makebisi
Nzokande, liboso ya kokenda na zɛlo oyo ezali pene to na mpembeni ya mai, tyá na makanisi na yo makebisi oyo: ndimisamá ete zɛlo oyo likoló na yango olingi kokende kotambola makolo-ngulu ezali pɛto mpe ezali na biloko ya mopotú te. Soki ozali na mikakatano ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto, lokola maladi ya sukali to mpasi ya motema, osengeli kokutana na monganga na yo liboso ya kosala ngalasisi motindo wana. Lisusu, lolenge moko na ngalasisi mosusu, bandá ngalasisi na yo ya kotambola likoló na zɛlo malɛmbemalɛmbe mpe kólisá mokemoke na boumeli ya bapɔ́sɔ. Okopɛngola mitungisi mpe okosepela na yango.
Kotambola makolo-ngulu likoló na zɛlo ezali bobele lisano te; ekoki kozala litambe ya liboso mpo na kolɔngɔ́nɔ́ malamu mpo na yo mpe mpo na makolo na yo. Mpe nani ayebi soki okobimela biloko mosusu na zɛlo to kati na mai ezali mozindo te—bikwokolo ya mbembe, bambisi ya mikemike, bansanya, ndenge nyonso ya ndɛkɛ mpe ya nyamankeke. Na bongo, sɛnzɛlá malamu mpe botamboli malamu!