Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwwd lisolo 41
  • Ndenge baselile ekabwanaka mpe ebotaka baselile mosusu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge baselile ekabwanaka mpe ebotaka baselile mosusu
  • Ebimá kaka yango moko?
  • Masolo mosusu
  • Monganga moko oyo ayekolaka ndenge mwana asalamaka na libumu alobeli kondima na ye
    Lamuká!—2016
  • Tosalamá mpo na kozala na bomoi libela na libela
    Lamuká!—1996
  • Baselile na yo—Bibliotɛkɛ moko ya kokamwa mpenza!
    Lamuká!—2015
  • Basinzili oyo babatelaka bokolɔngɔnɔ ya nzoto na yo
    Lamuká!—2001
Makambo mosusu
Ebimá kaka yango moko?
ijwwd lisolo 41
Selile moko ekabolami na biteni mibale.

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Ndenge baselile ekabwanaka mpe ebotaka baselile mosusu

Bomoi ya moto na libumu ya mama ebandaka na mwa selile moko babengi zygote, ezali moke mpenza kasi ekoki komonana na miso soki otali malamumalamu. Kasi mwa basanza na nsima, kaka mwa selile yango nde ekómaka bebe mobimba. Selile yango ebotaka mpe ekabwanaka na baselile mosusu ya ndenge na ndenge koleka 200 oyo ezali na lolenge mpe bonene, mpe misala oyo ekeseni.

Landá malamu: ADN ya selile zygote ebotaka ADN mosusu ya ndenge moko mpe ekabwanaka na biteni mibale. Baselile wana oyo ebotami ekobaka kokabwana se kokabwana. Na ebandeli, baselile nyonso ya sika ezalaka ndenge moko. Mokomoko na yango ezali na nyonso oyo esengeli mpo na kobota lolenge nyonso ya baselile.

Pɔsɔ moko nsima ya kozwa zemi, baselile ebandaka kokabwana na lolenge mibale. Misusu ekómaka ebandeli ya mwana to embryon, misusu ekómaka enama oyo ekangamaka na motɔlu ya mwana mpo na koleisa ye, mpe misusu ekómaka binama mosusu oyo esalisaka embryon ekola.

Kobanda na pɔsɔ ya misato, baselile ya embryon esalaka ba-couche misato. Baselile ya couche ya libanda ebotaka baselile oyo ekómaka ba-nerf, bɔɔngɔ, monɔkɔ, mposo, mpe biteni mosusu ya nzoto. Baselile ya couche ya katikati ekómaka makila, mikuwa, bangɛi, misuni, mpe biteni mosusu. Baselile ya couche ya nse mpenza ekómaka biteni ya kati ya ntolo, bapumɔ, vesi, mpe biteni mosusu ya libumu.

Selile moko ebimisi bituluku ya baselile mosusu misato oyo ekeseni. Baselile ya bituluku yango mokomoko ebimisi baselile ya bɔɔngɔ, mosusu ya ba foie, ya mikuwa mpe biteni mosusu ya nzoto ya bebe.

Kaka selile moko wana ebotaka mpe ekabwanaka na baselile mosusu ya ndenge na ndenge koleka 200 oyo ezali na lolenge mpe bonene, mpe misala oyo ekeseni

Na boumeli ya zemi, etuluku ya baselile, ata mpe selile moko, ekoki kolongwa na ngámbo moko ya embryon mpe kokende na ngámbo mosusu. Bituluku mosusu ya baselile esanganaka mpo na kosala ba-couche mpe misusu ebendanaka mpo na kosala madusu ya nzoto. Nyonso wana esɛngaka esalema na boyokani ya malamu. Na ndakisa, na ntango moko boye, mwa biteni yango elíngamaka yango moko mpe ekómaka lokola batiyo. Nyonso wana esalemaka mbala moko na bisika ndenge na ndenge ya embryon. Batiyo yango ekómaka milai mpe ebendanaka, nsukansuka ekutanaka mpe ekómaka kosala elongo lokola mashini moko ya kokamwa.

Soki omoni bebe moko abotami na sante ya malamu, yango elakisi ete bamilio ya baselile ekabwanaki mpe ebotaki baselile mosusu na ntango mpe na esika oyo ebongi.

Okanisi nini? Likoki oyo baselile ezalaka na yango ya kokabwana mpe kobota baselile mosusu, basalaki yango kosala? To ebimá kaka yango moko?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto