Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mrt lisolo 14
  • Yoane Mobatisi azalaki mpenza na bomoi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yoane Mobatisi azalaki mpenza na bomoi?
  • Makambo mosusu
  • Masolo mosusu
  • Babomi moto na mokolo ya fɛti ya anivɛrsɛrɛ ya mbotama
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Yoane Mobatisi azalaki nani?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Mituna ya Batangi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Moto abomami na elambo ya bokundoli mbotama
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
Makambo mosusu
Makambo mosusu
mrt lisolo 14
Yoane Mobatisi azali kobatisa bato.

Yoane Mobatisi azalaki mpenza na bomoi?

Masolo ya Baevanzile elobeli mobali moko na nkombo Yoane Mobatisi, oyo asakolaki nsango ya Bokonzi ya Nzambe na Yudea. Bato ya istware bandimi ete makambo oyo Biblia elobeli mpo na ye ezali mpenza solo? Tótalela makambo oyo:

  • Biblia elobi: “Yoane Mobatisi ayaki kosakola na esobe ya Yudea, mpe azalaki koloba ete: ‘Bóbongola mitema, mpo bokonzi ya likoló ekómi pene.’” (Matai 3:1, 2) Mikanda ya bato ya mayele emonisi bosolo ya maloba yango? Ɛɛ.

    Mobali moko na siɛklɛ ya liboso na nkombo Flavius Josèphe alobelaki mobali moko na nkombo “Yoane, oyo bapesaki ye nkombo Mobatisi,” oyo “alendisaki Bayuda básala makambo ya bosembo,” mpo “bákangama na Nzambe,” mpe “bázwa batisimo.”​—Histoire ancienne des Juifs, livre XVIII.

  • Biblia emonisi ete Yoane asembolaki Erode Antipasi, oyo azalaki moyangeli ya etúká na Galile mpe na Perea. Erode azalaki koloba ete azali Moyuda oyo azalaki kotosa Mibeko ya Moize. Yoane ayebisaki Erode ete asalaki mabe ndenge azwaki Erodiadi mwasi ya ndeko na ye. (Marko 6:18) Kaka Biblia te nde elobeli likambo yango, bato mosusu mpe bandimi likambo yango.

    Josèphe moto ya istware alobaki ete Antipasi “[alingaki] Erodiadi lokola mwasi” mpe “na mpiko nyonso asɛngaki ye bábalana.” Erodiadi andimaki mpe abwakisaki mobali na ye mpo abalana na Antipasi.

  • Biblia elobi ete “bato ya Yerusaleme mpe ya Yudea mobimba mpe ya mokili mobimba zingazinga ya Yordani bazalaki kokende epai na ye [Yoane], mpe abatisaki bato na Ebale ya Yordani.”​—Matai 3:5, 6.

    Josèphe mpe andimaki likambo yango, akomaki ete “ebele mpenza ya bato” bayaki kotala Yoane mpe ete “makambo oyo ateyaki bango esimbaki mpenza mitema na bango.”

Emonani polele ete mobali wana ya siɛklɛ ya liboso na nkombo Josèphe andimaki ete Yoane Mobatisi azalaki moto ya solo. Biso mpe tokoki kondima yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto