Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwwd lisolo 2
  • Makelele oyo mbisi babengi dauphin ebimisaka

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makelele oyo mbisi babengi dauphin ebimisaka
  • Ebimá kaka yango moko?
  • Masolo mosusu
  • Biloko Nzambe azalisaki bikoki koteya biso nini
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
Ebimá kaka yango moko?
ijwwd lisolo 2
Dauphin

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Makelele oyo mbisi babengi dauphin ebimisaka

Dauphin ebimisaka makelele ndenge na ndenge mpe na nsima elandelaka lokito ya makelele yango mpo eyeba esika ekokende mpe kotalatala zingazinga ya bisika oyo efandaka. Makelele oyo dauphin ya zolo monene (Tursiops truncatus) ebimisaka etindi bato ya siansi bákolisa mayele ya teknoloji na oyo etali kosala baaparɛyi oyo ebimisaka makelele, oyo batyaka na nse ya ebale mpo básilisa mikakatano oyo bazali na yango sikoyo.

Kanisá naino: Makelele oyo dauphin ebimisaka esalisaka yango emona mbisi oyo ebombani na zɛlo na nse ya ebale mpe ekesenisa mbisi ná libanga. Keith Brown, oyo azali profesɛrɛ na iniversite ya Heriot-Watt, na Édimbourg, Écosse, alobi ete dauphin ekoki mpe “kokesenisa tɔnɔ oyo ezali na mai ya pɛto, mai ya mungwa, mai ya sukali mpe mafuta na mosika [na ntaka ya] mɛtrɛ zomi.” Bato ya siansi bazali na mposa ya kosala baaparɛyi oyo ekozala na likoki ya bongo.

Dauphin esalelaka makelele oyo ebimisaka mpo na koyeba eloko oyo ezali na kati ya tɔnɔ moko

Na ntaka ya mɛtrɛ zomi, dauphin ekoki koyeba eloko oyo ezali na kati ya tɔnɔ mokomoko

Bato ya mayele bayekolaki ndenge oyo dauphin ebimisaka mongongo mpe eyokaka mpo na komekola yango. Litomba oyo emonanaki ezali ete bábimisa aparɛyi moko oyo batyaki na kati na yango biloko ndenge na ndenge ya kokamwa oyo bakɔtisaki yango na mwa eloko moko (cylindre) oyo molai na yango ekoki ata mɛtrɛ moko te. Aparɛyi yango oyo bakangisaki yango na masini moko oyo etambolaka na nse ya mai, oyo ezali lokola masuwa ya moke; oyo basalaki yango mpo na kotalatala nse ya ebale, koluka biloko oyo ekundamá, na ndakisa bansinga to batiyo, kotala soki ezali ndenge nini kozanga kosimba yango na mabɔkɔ. Baoyo basalaki aparɛyi yango bakanisi ete bakompanyi ya petrole ekoki kosalela aparɛyi yango. Baaparɛyi yango oyo bauti kosala yango na kolanda mayele oyo dauphin esalelaka mpo na kobimisa makelele, ekoki kobomba makambo ndenge na ndenge oyo ekosalisa bato ya teknike bátya bisaleli oyo batyaka na nse ya ebale na esika oyo ebongi, bámona esika nyonso oyo mbeba ezali; na ndakisa soki makonzí ya eloko oyo babendaka petrole na nse ya mai epasukipasuki; ata mpe komona biloko oyo ekangi batiyo.

Okanisi nini? Makelele oyo dauphin ebimisaka ebimá kaka yango moko to basalaki yango kosala?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto