Etanda ya makambo ezali na kati
PƆSƆ YA 24-30/10/2016
PƆSƆ YA 31/10/2016–06/11/2016
9 Kobá kobunda mpo na kozwa lipamboli ya Yehova
Mikakatano mpe mitungisi ekoki kosala ete tólɛmbisa mabɔkɔ, elingi koloba, tómiyoka ete tolɛmbi nzoto. Na masolo oyo, okoyekola ndenge oyo lobɔkɔ ya nguya ya Yehova ekoki kopesa yo makasi mpe mpiko mpo okoba koyika mpiko. Okomona mpe makambo oyo okoki kosala mpo olonga etumba oyo tozali kobunda mpe ozwa lipamboli ya Yehova.
PƆSƆ YA 07-13/11/2016
14 Elateli na yo ekumisaka Nzambe?
Basaleli ya Nzambe na mokili mobimba balingaka ete molato mpe monzɛlɛ na bango ezala oyo ebongi, ya pɛto, mpe oyo endimami. Ntango balataka ndenge wana, batosaka mitinda ya Biblia. Ndenge nini okoki koyeba soki elateli na yo ekumisaka Nzambe?
PƆSƆ YA 14-20/11/2016
20 Bilenge: Bókómisa kondima na bino makasi
PƆSƆ YA 21-27/11/2016
26 Baboti: Bósalisa bana na bino bákóma na kondima makasi
Na masolo oyo mibale, tokomona ndenge oyo bilenge bakoki koyekola kosalela makoki na bango ya kokanisa mpo bákómisa makasi kondima na bango epai ya Yehova mpe bálimbwela basusu makambo oyo bandimaka. Tokomona mpe makambo oyo baboti bakoki kosala mpo na kosalisa bana na bango bákóma na kondima makasi mpe ndenge oyo bakoki kosalisa bango básepela koyekola makambo ya Yehova mpe Biblia.