Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • yb17 lok. 171
  • Bolingo ebuki bandelo oyo bato batyá

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bolingo ebuki bandelo oyo bato batyá
  • Buku ya mobu 2017 ya Batatoli ya Yehova
Buku ya mobu 2017 ya Batatoli ya Yehova
yb17 lok. 171

GÉORGIE

Bolingo ebuki bandelo oyo bato batyá

MWA moke liboso ete mwana moko ya mwasi na nkombo Sanel abotama, minganga bayebisaki baboti na ye ete soki akufi te na ntango ya kobotama, akozala na mikakatano makasi ya nzoto. Kaka mokolo oyo abotamaki, esɛngaki ete básala ye lipaso. Baboti na ye, oyo bazalaki kofanda na Abkhazia, etúká moko ya Géorgie oyo ezwá lipanda, bazalaki te kozwa monganga oyo akondima kosala Sanel lipaso kozanga kozongisa ye makila.

Baboti ya Sanel balukaki lisalisi ya Komite ya boyokani elongo na minganga.a Mitema na bango ekitaki ntango bandeko ya komite yango bazwaki nokinoki monganga moko na Tbilissi, mboka-mokonzi ya Géorgie, oyo andimaki kosala mwana yango lipaso kozanga kozongisa ye makila. Kasi lokola mama ya Sanel azwaki naino makasi te nsima ya kobota, akokaki te kosala mobembo wana. Yango wana, ekateli ezwamaki ete nkɔkɔ ya Sanel ya mwasi, oyo azalaki mpe Motatoli ya Yehova, amema Sanel na lopitalo na Tbilissi.

Atako lipaso yango ezalaki ya mindɔndɔ, elekaki malamu. Mwa moke na nsima, nkɔkɔ ya Sanel akomaki boye: “Tosalaki mikolo koleka 20 na lopitalo. Na mikolo wana nyonso, bandeko mibali mpe basi mingi ya Géorgie bazalaki koya kotala biso mpe kosalisa biso. Bandeko mingi bamonisaki ete bazali komitya na esika na biso. Totángaka masolo oyo elobeli bolingo oyo bandeko bamoniselanaka, kasi sikoyo biso moko tomoni yango na miso.”

a Na Géorgie, bankulutu oyo bazali na Komite ya boyokani elongo na minganga bayokanaki na minganga koleka 250 oyo bandimaka kosala bandeko lipaso kozanga kozongisa makila.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto