Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • yb16 lok. 168-lok. 169 par. 2
  • Yehova apambolaki biso koleka ndenge tokanisaki!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova apambolaki biso koleka ndenge tokanisaki!
  • Buku ya mobu 2016 ya Batatoli ya Yehova
  • Masolo mosusu
  • Misala ya kotonga na filiale​—Eteni ya ntina mingi ya mosala ya bosantu
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Bisika na biso ya losambo
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi ezali kokende liboso
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Kotonga bandako mpo na kokumisa Yehova
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
Makambo mosusu
Buku ya mobu 2016 ya Batatoli ya Yehova
yb16 lok. 168-lok. 169 par. 2

INDONÉSIE

Yehova apambolaki biso koleka ndenge tokanisaki!

Angeragō Hia

  • ABOTAMAKI NA 1957

  • BATISIMO 1997

  • NA MOKUSE Azongaki na mboka na ye mosika na esanga Nias mpe afungolaki lisangá.

Angeragō Hia

NA 2013, na mwa lisangá na biso ya Tugala, tozwaki nsango moko ya esengo mpenza: bakotongela biso Ndako ya Bokonzi ya sika! Bakonzi ya mboka bandimaki, mpe bato 60 ya kartye batyaki sinyatire na mokanda moko mpo na komonisa ete bandimi likambo yango. Moto moko ya kartye ayebisaki biso boye: “Soki bolingi ata bato 200 bátya sinyatire, bakotya.”

Bandeko mibale oyo bayebi malamu mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi bayaki kotambwisa mosala yango, mpe esilaki na sanza ya zomi na moko ya 2014. Ata mokolo moko te tolɔtaki ete lisangá na biso ekozwa esika ya losambo ya kitoko ndenge wana. Ya solo, Yehova apambolaki biso koleka ndenge tokanisaki!

Angeragō Hia ná bandeko mosusu bazali kotonga Ndako ya Bokonzi na Tugala Oyo, na esanga Nias
    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto