Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • yb15 lok. 16-lok. 17 par. 4
  • Kosala baplan mpe kotonga na mokili mobimba

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kosala baplan mpe kotonga na mokili mobimba
  • Buku ya mobu 2015 ya Batatoli ya Yehova
  • Masolo mosusu
  • Kotonga Bandako ya Bokonzi nokinoki
    Buku ya mobu 2016 ya Batatoli ya Yehova
  • Kotonga bandako mpo na kokumisa Yehova
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
  • Mpo na nini totongaka Bandako ya Bokonzi mpe ndenge nini tosalaka yango?
    Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
  • Ndenge mosala ya botongi esalemaki liboso Coronavirus ebanda
    Ndenge oyo makabo na yo esalelamaka
Makambo mosusu
Buku ya mobu 2015 ya Batatoli ya Yehova
yb15 lok. 16-lok. 17 par. 4
Elilingi na lokasa 16

MAKAMBO YA ESENGO YA MBULA ELEKI

Kosala baplan mpe kotonga na mokili mobimba

BOKOLI monene oyo ezali kosalema na ebongiseli ya Yehova ezali kosɛnga kotonga lisusu Bandako ya Bokonzi, Bandako ya mayangani, bandako mpo na biteyelo ya teokrasi, babiro mpo na babongoli, mpe bandako ya Betele na bisika ndenge na ndenge. Na yango, na sanza ya zomi na 2013, Lisangani ya Mikóló-Bakambi esalaki departema moko ya sika mpo mosala ya kosala baplan, ya kotonga, ya kobongisa mpe ya kobatela bandako ya losambo ekoka kosalema nokinoki mpe na ndenge oyo ekosɛnga mbongo ebeleebele te. Departema yango ya sika ebengami Departema ya kosala baplan mpe ya kotonga na mokili mobimba (WDC); ezali na biro monene na Brooklyn, na New York, mpe esalaka na litambwisi ya Komite ya kobimisa mikanda ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi.

Departema yango etambwisaka mosala ya Badepartema ya kosala plan mpe kotonga na bitúká, oyo ezali na biro ya filiale ya Afrika ya Sudi, ya Allemagne, ya Australie, mpe ya États-Unis. Departema mokomoko elandelaka mosala ya kosala baplan, ya kotonga mpe ya kobatela bandako na biso na mikili oyo yango etalelaka. Mokano na yango ezali ya kosala ete mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi ekende nokinoki. Liboso, Bandako ya Bokonzi ezalaki kotongama na lisalisi ya Komite ya botongi to ya ebongiseli ya kotonga na mikili oyo ezali na bozwi mingi te. Sikoyo, bibongiseli yango mibale ekómi kaka ebongiseli moko, mpe tolingi kosalela mikano ya bibongiseli yango mibale mpo na kokolisa mosala na biso ya kotonga.

Mpo na kotambwisa mosala monene ya kotonga Bandako ya Bokonzi mpe Bandako ya mayangani, Departema ya kosala baplan mpe kotonga na ekólo efungwamaki na Babetele nyonso. Departema yango etindaka lapolo mbala moko na Komite ya filiale ya ekólo. Likambo ya malamu na mbongwana yango ezali ete sikoyo Betele nyonso ekoki kotinda bandeko oyo bazali na mosala ya kotonga bákende kosalisa bandeko ya masangá na kotonga Bandako ya Bokonzi mpe Bandako ya mayangani.

Na sanza ya minei na 2014, esengelaki kosilisa misala minene 270, kati na yango, babiro 90 mpo na babongoli na bamboka, Bandako ya mayangani 35, mpe bandako 130 na Babetele. Longola yango, ezali na Bandako ya Bokonzi koleka 14 000, mosusu esengeli kotongama, mosusu esɛngi kosala misala minene mpo na kobongisa yango.

Kondima na biso elendisamaka mpenza na komona basaleli ya Yehova bazali kosala na bomoko atako bazali bato ya bikólo, ya mimeseno, mpe ya minɔkɔ ekeseni, mpo na kotonga bandako oyo ezali kosanzola mpe kokumisa nkombo na ye mosantu! Ndeko Dan Molchan, oyo azali na Komite oyo etalelaka bandeko ya Betele na biro monene alobi boye: “Mosala ezali naino mingi; na yango, tozali na botɔndi mpo na mabondeli ya bandeko na biso ya mibali mpe ya basi, mpe mpo na makabo oyo batyaka mpo na mosala yango. Kasi tozali na botɔndi mingi mpo na bandeko oyo bamipesi na bolingo na bango moko mpo na kopesa mabɔkɔ na misala yango.”

NA SANZA YA MINEI 2014, MISALA MINENE KOLEKA 270 ESENGELAKI KOSILA, KATI NA YANGO:

  • Babiro 90 mpo na babongoli na bamboka

  • Bandako ya mayangani 35

  • Bandako 130 na Babetele

Longola yango, ezali na Bandako ya Bokonzi koleka 14 000, mosusu esengeli kotongama, mosusu esɛngi kosala misala minene mpo na kobongisa yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto