Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • yb15 lok. 162-lok. 163 par. 2
  • “Bato 22 bakimaki ndako-nzambe”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bato 22 bakimaki ndako-nzambe”
  • Buku ya mobu 2015 ya Batatoli ya Yehova
Buku ya mobu 2015 ya Batatoli ya Yehova
yb15 lok. 162-lok. 163 par. 2

RÉPUBLIQUE DOMINICAINE

Bato 22 bakimaki ndako-nzambe

Elilingi na lokasa 162

GERMAN GOMERA azalaki mwana ya nsuka na libota ya bana 11. Ntango tata na ye mpe bandeko na ye mibale ya basi bakufaki, mama na ye Luisa amemaki bango na engumba monene. Kuna, bakɔtaki na ndako-nzambe ya Ba-Mennonite, epai bayaya ya Luisa ya mibali mpe mabota na bango bazalaki kosambela.

German alobi boye: “Na 1962, ndeko moko ya mobongisi-nzela monene ná mwasi na ye bayaki na engumba na biso. Bato bazalaki koloba ete bayei kolɔka bato ya mboka na ‘mateya na bango ya bondɔki.’ Atako bongo, ntango mobali yango ná mwasi na ye bayaki na libota ya tata Piña, bayambaki bango. Libota ya tata Piña ezalaki monene mpenza. Bakamwaki komona boboto mpe bizaleli malamu ya babongisi-nzela wana, yango wana bayokaki bango na likebi mpenza. Na yango, bato ya libota ya tata Piña mpe bayaya na ngai misato ya basi bakómaki koyekola Biblia.

“Mokolo moko ntango babongisi-nzela yango bakendaki kotala libota ya tata Piña, babengisaki mama. Batángaki bavɛrsɛ ya Biblia oyo elobeli elikya ya kofanda libela na libela na mabele. Mama atunaki bango: ‘Bongo mpo na nini na ndako-nzambe na biso balobaka ete tokokende likoló?’ Ntango ndeko mobali wana apesaki mama eyano na Biblia mpe amonisaki ye oyo Biblia elobi mpo na lisekwa awa na mabele, mama asepelaki mpe abandaki koyebisa bato makambo oyo ayekolaki.

“Ntango bapastɛrɛ ya ndako-nzambe ya Ba-Mennonite bamonaki ete bandimi na bango bakómi koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova, balukaki kopekisa bango. Kasi, basalaki yango na makasi mpe na ndenge ya mabe. Maximina, mwasi ya tata Piña, ayebisaki bango ete: ‘Talá! Nazali mokóló, ngai moko nazwaka bikateli.’

“Nsukansuka, bato 22 bakimaki ndako-nzambe ya Ba-Mennonite mpe babandaki kokende makita ya lisangá na ndako moko oyo bazalaki kofutela. Mama azwaki batisimo na 1965; ngai nazwaki batisimo mbula 4 nsima, na 1969, ntango nazalaki na mbula 13.”

Elilingi na lokasa 163

German ná bandeko na ye lelo. Bazali basaleli ya sembo ya Yehova

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto