Mokanda ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi
Baninga na biso basali ya ndako,
Tozali na esengo ya kokomela bino mokanda oyo na ebandeli ya mobu oyo ya ntina mingi! Pene na nsuka ya mobu 2014, mbula nkama moko ekokoka banda Mokonzi na biso Yesu Kristo abandaki koyangela na katikati ya banguna na ye.—Nz. 110:1, 2.
Na ebandeli ya mobu ya mosala oyo, na likita ya nsuka ya mbula ya Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania, Komite ya bobongoli ya Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika ebimisaki Biblia ya Lingelesi oyo ebongisami lisusu malamu. Yehova asalelaki bana na ye oyo batyami mafuta na elimo mpo na kobimisa Libongoli ya Mokili ya Sika ya libosoliboso. (Rom. 8:15, 16) Lokola Biblia yango ebongolamaki kaka na bakristo oyo batyami mafuta na elimo, yango esali ete libongoli yango ekesana na mabongoli mosusu nyonso.
Banda bambula mingi, Komite ya bokomi ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi etyaka mosala ya kobongola Biblia na esika ya liboso. Lelo oyo, Libongoli ya Mokili ya Sika esili kobimisama na mobimba to na ndambo na minɔkɔ 121. Tolendisi bino bómonisa Yehova ete bolingaka mpenza Biblia oyo bozali na yango. Bótángaka mpe bómanyolaka yango mokolo na mokolo. Na ndenge yango, bokopusana lisusu penepene na Yehova Nzambe, nkolo Biblia.—Yak. 4:8.
Koyoka ete bandeko mibali mpe basi bazali kokutana na komekama esalaka biso mpasi. Ya solo, ntango mosusu ekoki kozala mpasi bandeko yango básepela elongo na bandeko mosusu. Na ndakisa, na Azia, na mikolo euti koleka, bomoi ya libota moko ebongwanaki ntango mama ya libota yango akómaki paralize na mbalakaka. Minganga balongaki te kozongisa ye ndenge azalaki. Ezali mpenza mawa! Sikoyo, mobali na ye asengeli kozala wana mpo na kokɛngɛla ye mikolo nyonso. Bana na bango oyo bazali Batatoli, moko ya mobali mpe mibale ya basi, bazali kopesa ndakisa malamu na ndenge bazali kosunga baboti na bango. Libota wana oyo ezali kopesa ndakisa malamu mpe bino nyonso oyo bozali koyika mpiko na komekama ndenge na ndenge, bokoki koyoka esengo oyo eutaka na koyika mpiko ntango kondima na bino emekami. (Yak. 1:2-4) Yehova alaki biso nyonso, bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe bampate mosusu, ete tokosepela ntango tokozwa likabo ya bomoi ya seko mpo toyikaki mpiko na komekama ndenge na ndenge!—Yak. 1:12.
Na mbula oyo euti koleka, bato 19 241 252 bayanganaki na Ekaniseli, likita oyo eleki ntina. Komona ebele ya bato ndenge wana bazali kokumisa Yehova mpe Yesu Kristo na ndenge bazali koyangana na Ekaniseli esepelisaka basaleli ya Nzambe! Na eleko ya Ekaniseli, masanzoli mingi emataki epai ya Yehova na ndenge ebele ya bandeko basalaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi na sanza ya misato mpe ya minei. Oyo nde esengo! Lisusu, bosepelaki mpe koyeba ete bandeko oyo basɛngi mosala ya mobongisi-nzela mosungi na pɔsɔ oyo mokɛngɛli ya zongazonga ayei kotala lisangá bakoki kokɔta banda ebandeli tii nsuka na likita oyo asalaka elongo na babongisi-nzela, ata soki viziti na ye ekwei te na sanza ya misato to ya minei! Bato ya elimo bayebaka ete basengeli kokoba kosakola na molende mpe komipesa na makambo ya lisangá. Kosala mingi esalisaka biso tópikama makasi, tóninganaka te mpe tókwea te na mitambo oyo Zabolo atyelaka biso mpo na kolɛmbisa kondima na biso mpe kolongola biso na nzela ya bomoi.—1 Ko. 15:58.
Na mobu ya mosala oyo euti koleka, bato 277 344 bazwaki batisimo mpo na komonisa ete bamipesi na Nzambe. Komona ndenge bato yango bazali lelo kotambola na nzela ya bomoi elongo na bandeko ya mokili mobimba ezali mpenza kolendisa! (Mat. 7:13, 14) Tosengeli kosalisa bandeko wana ya sika mpo ‘bátɛlɛma ngwi na kondima.’ (Kol. 2:7) Tókoba kolendisana mpo tóyika mpiko tii na nsuka. (Mat. 24:13) ‘Tólobaka na ndenge ya kobɔndisa epai ya milimo oyo enyokwami na makanisi, tósalisa bato ya bolɛmbu, tózala na motema molai epai ya bato nyonso.’ (1 Tes. 5:14) Mpo na kosukisa, tiká ete mokomoko na biso ‘abondelaka ntango nyonso’ ete: ‘Tiká Bokonzi na yo eya.’—1 Tes. 5:17; Mat. 6:10.
Tolendisi bino bótánga Annuaire oyo; bóyeba ete tolingaka bino nyonso baoyo bolingaka Yehova!
Bandeko na bino,
Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova