Lisalisi mpo na basi oyo banyokwamaka
“BAMILIO ya basi mpe bilenge basi na mokili mobimba bazali konyokwama mpo na makambo ya mabe oyo basusu basalaka bango. Yo mpe ozali moko na bango? Talá ntina oyo Nzambe alingi obatelama mpe oyo akosala mpo na likambo etali konyokola basi.”
Wana ezali ebandeli ya lisolo ya jw.org oyo elobi “Kobatela basi—Oyo Biblia elobi.” Na nsuka ya lisolo yango, ezali na lien oyo epesi nzela ya kozwa PDF ya lisolo yango, oyo moto akoki kobimisa na papye mpe kogumba yango mpo ekóma lokola trakte ya nkasa minei. Ndeko mwasi moko ya États-Unis na nkombo Stacy alobi boye: “Nabimisaki lisolo yango na papye, mpe elongo na ndeko mwasi mosusu, tokendaki kokabola yango na esika oyo babatelaka basi oyo bazali na likama, na teritware ya lisangá na biso.”
Moto moko oyo asalaka kuna asɛngaki batrakte yango mosusu mpo akabolela basi oyo bafandaka na esika yango. Yango esalaki ete apesa lisusu batrakte 40 mpe bakarte 30 ya jw.org. Na nsima, ntango bazongaki lisusu kuna, mokambi ya esika yango alingaki ete Batatoli ya Yehova bálakisa basi oyo bafandaka kuna ndenge boyekoli ya Biblia esalemaka.
Stacy mpe bandeko basi mosusu mibale bakendaki na esika mosusu oyo babatelaka basi, bakabolaki batrakte yango 5 mpe bato basɛngaki mosusu. Moko ya bato oyo asalaka na esika yango alobaki boye: “Mwa mokanda yango ekosalisa basi oyo bazali awa. Tozali na mposa na yango.” Na mbala ya nsima ntango bakendaki kuna, basi ebele bayanganaki esika bazalaki kolakisa ndenge boyekoli ya Biblia esalemaka, mpe mibale kati na bango balobaki ete bakoyangana na makita ya nsuka ya pɔsɔ na Ndako ya Bokonzi.
Stacy alobi boye: “Tokamwaki ndenge basi basepelaki mingi na lisolo yango ya kitoko. Soki obimisi lisolo yango na papye mpe ogumbi yango, ekómaka lolenge ya malamu ya koyebisa basi oyo banyokwamaka nsango ya Bokonzi. Ndenge bato basepelaki na yango esimbaki mitema na biso, mpe tozali kozela mpenza komona ndenge Yehova akopambola milende na biso mpo na kosakwela bato ya ndenge wana nsango malamu.”