LIKANISI MPO NA KOYEKOLA
Saleláká mitindami
Mitindami oyo ezali na Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika emonisi ete makambo oyo ezali na Biblia ezali na boyokani mpo etindaka na bavɛrsɛ oyo ebakisi makanisi mosusu na makambo oyo ozali kotánga. Mitindami ezalaka na kati ya lɛtrɛ moko ya moke ya alfabɛ oyo ezali pembeni ya liloba. Na Biblia ya papye, luká lɛtrɛ yango na molɔngɔ oyo ezali na katikati to na mopanzi ya lokasa mpo omona bavɛrsɛ oyo eyokani na makambo oyo ozali kotánga. Na jw.org to na JW Library®, finá lɛtrɛ ya moke ya alfabɛ mpo omona bavɛrsɛ oyo ezali na kati.
Mitindami ekoki komema yo na makambo ndenge na ndenge, na ndakisa:
Masolo oyo ekokani: Mitindami yango ememaka esika mosusu oyo balobeli mpe makambo oyo ozali kotánga. Na ndakisa, talá 2 Samwele 24:1 mpe 1 Ntango 21:1.
Maloba mosusu ya ndenge wana: Mitindami yango emonisaka esika oyo maloba yango elobamá. Na ndakisa, talá Matai 4:4 mpe Kolimbola Mibeko 8:3.
Esakweli oyo ekokisami: Mitindami yango ememaka na esakweli mpe kokokisama na yango. Na ndakisa, talá Matai 21:5 mpe Zekaria 9:9.