Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w25 Mai lok. 32
  • Obongisa motema na yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Obongisa motema na yo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Masolo mosusu
  • Zwá motema oyo ekosepelisa Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Kolakisa bayekoli ndenge ya kobongisa boyekoli
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2018
  • Oteyaka na lolenge oyo ekoki mpenza kobota mbuma?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Tóbongisa motema na biso mpo na koluka Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
w25 Mai lok. 32

LIKANISI MPO NA KOYEKOLA

Obongisa motema na yo

Ntango tozali koyekola Biblia, tolingaka makanisi ya Yehova esimba motema na biso, bomoto na biso ya kati. Ezera atiká ndakisa malamu na likambo yango na ndenge “abongisaki motema na ye mpo na koyekola Mobeko ya Yehova.” (Ezr. 7:10) Ndenge nini okoki kobongisa motema na yo?

Bondelá. Liboso obanda koyekola, salá libondeli. Sɛngá Yehova asalisa yo okanga ntina mpe osalela makambo oyo okoyekola.—Nz. 119:​18, 34.

Zalá na komikitisa. Bato ya lolendo oyo batyaka motema na mayele na bango moko, Nzambe amonisaka bango solo te. (Luka 10:21) Kosalaka bolukiluki te kaka mpo na kolakisa basusu ete oyebi mingi. Na komikitisa nyonso, bongolá makanisi na yo soki eyokani te na oyo ya Nzambe.

Meká koyoka loyembo moko ya Bokonzi. Miziki ekoki koloba na motema na biso, mpe na ndenge yango kobongisa biso mpo na losambo. Soki oyoki loyembo moko ya Bokonzi liboso obanda boyekoli, ekoki kosalisa yo obongisa motema na yo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto