Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w24 Septembre lok. 32
  • Zalá na makanisi ya malamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Zalá na makanisi ya malamu
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Masolo mosusu
  • Yehova akokisaka mposa ya basaleli na ye
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
  • Koyekola epesaka mbano
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Salá likambo oyo basɛngaki na Mokonzi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Bongisá ndenge na yo ya koyekola!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
w24 Septembre lok. 32

LIKANISI MPO NA KOYEKOLA

Zalá na makanisi ya malamu

Ntango tozali komibongisa mpo na koyekola, mbala mosusu tomitunaka: ‘Likambo nini nakoyekola?’ Kasi, ekozala malamu tókeba ete mposa na biso ezipa biso miso na makambo oyo Yehova azali koteya biso. Ndenge nini tokoki kokoba kozala na makanisi ya malamu ntango tozali koyekola?

Bondelá mpo ozwa bwanya. Sɛngá Yehova bwanya mpo ososola oyo alingi oyekola sikoyo. (Yak. 1:5) Boyá kokangama kaka na boyebi na yo ya kala.—Mas. 3:​5, 6.

Ndimá nguya ya Biblia. “Liloba ya Nzambe ezali na bomoi.” (Ebr. 4:12) Ntango nyonso oyo tozali kotánga Biblia, ekoki koteya biso mpe kosimba motema na biso, kasi ekosala bongo kaka soki tondimi makambo oyo Nzambe azali koteya biso.

Zalá na botɔndi mpo na mateya nyonso ya Yehova. Bilei na ye ya elimo ezali lokola “fɛti moko ya bilei ya kitoko mpenza.” (Yis. 25:6) Koboya te kolya “bilei” oyo okanisi ete okosepela na yango te. Okozwa matomba mingi mpe okosepela mpenza na oyo Nzambe azali kopesa!

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto