Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb26 Mai nk. 5-16
  • 18-24/05

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 18-24/05
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2026
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2026
mwb26 Mai nk. 5-16

18-24/05

YISAYA 62-64

Loyembo 44 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

Mabɔkɔ ya moyemi-mbɛki ezali kosala mbɛki.

1. Moyemi oyo atondi na bolingo mpe motema mawa

(Min. 10)

Yehova ayokelaka biso mawa, ata ntango tozali komona mpasi mpo na mabunga na biso moko (Yis 63:9; cl 253-254 par. 7-9)

Atako Yehova abatelaka biso te na mbuma mabe ya mabunga na biso, asalisaka biso (w23.08 28-29 par. 8-9)

Soki totiki ye abongisa biso, akokoba kosala yango mpo tókóma na motuya mingi na miso na ye (Yis 64:8; w13 15/9 20 par. 15-17)

2. Biloko ya motuya ya elimo

(Min. 10)

  • Yis 63:10—Vɛrsɛ yango ezali koteya biso nini na oyo etali motema molai ya Yehova? (it “Motema mawa” par. 11)

  • Biloko nini ya motuya ya elimo oyo ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, okosepela kolobela?

3. Botángi ya Biblia

(Min. 4) Yis 64:​4-12 (th liteya 12)

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

4. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 3) NA BISIKA YA BATO NYONSO. Luká koyeba likambo nini ekosepelisa moto yango, mpe bóyokana mpo na kosolola lisusu mbala ya nsima. (lmd liteya 1 pwɛ 5)

5. Kolandela bokoli

(Min. 4) NDAKO NA NDAKO. Bólobela video moko oyo ezali na kati ya Bisaleli mpo na koteya. (lmd liteya 9 pwɛ 4)

6. Kokómisa bato bayekoli

(Min. 5) lff 254 etanda “Nakoki mpenza mpo na kosakola elongo na bandeko ya lisangá?” Sololá na moyekoli na yo ya Biblia mpo na mokano ya kokóma mosakoli oyo azwi naino batisimo te. (lmd liteya 12 pwɛ 3)

BOMOI YA BAKRISTO

Loyembo 115

7. Komibongisa mpo na makama—Ata makambo oyo okanisaki te ekoki kosalema

(Min. 15) Lisolo na bayangani. Ekosalema na nkulutu moko. Soki ezali na malako oyo euti na Betele mpe na lisangani ya bankulutu, lobelá mpe yango.

Bililingi: Bilembo ndenge na ndenge ya kokebisa ezali komonisa makama oyo ebimaka yango moko: 1. Tsunami. 2. Koningana ya mabele. 3. Mbula ya mopɛpɛ makasi. 4. Volcan ebimisi mɔtɔ. 5. Mɔtɔ na zamba.

Makama, ata mpe mobulu, ekoki kosalema na bisika nyonso mpe na mbalakaka. (Mos 9:11) Ata soki ofandaka esika makama oyo ebimaka yango moko esalemaka mpenza te, koyeba ete ata makambo oyo okanisaki te ekoki kosalema ezali likambo ya bwanya. (Mas 22:3) Ndenge nini okoki komibongisa?

  • Na bisika ya bato mingi, tyáká likebi na makambo oyo ezali kosalema zingazinga na yo, lukáká bisika oyo ezali na bilembo ya kobima nokinoki na ntango ya likama, mingimingi na bisika oyo bato bazalaka ebele mpenza.

  • Mpo na makama oyo ebimaka yango moko, bongisá basakosi oyo bokoki kokima na yangoa mpe biloko ya ntina mpo na libota na bino. Kanisá makambo oyo osengeli kosala soki esɛngi bókima mpe zalá na banimero ya telefone ya bato ya libota mpe baninga na yo.—g17.5 4

Lakisá VIDEO Komibongisa mpo na makama—Ata makambo oyo okanisaki te ekoki kosalema. Na nsima tuná bayangani boye:

  • Ndenge nini bandeko basi mpe mibali bazalaki liboso kotalela likambo etali komibongisa mpo na makama?

  • Basalaki makambo nini mpo na komibongisa?

  • Ndenge nini Yehova apambolaki milende na bango mpo na komibongisa mpo na likama?

  • Mateya nini bazwaki na likambo yango?

OMITUNA BOYE: ‘Ndenge oyo natalelaka likambo etali komibongisa mpo na makama emonisaka ete nazali na limemya epai ya Yehova?’

MOKANO: Ntango okobima pɔsɔ oyo, omituna boye: ‘Esika nini nakoki kokima nokinoki soki likama ebimi?’

8. Boyekoli ya Biblia na lisangá

(Min. 30) lfb liteya 86, maloba ya ebandeli ya eteni 13, mpe liteya 87

Maloba ya nsuka (Min. 3) | Loyembo 151 mpe libondeli

a Talá etanda oyo elobi “Ozali na biloko oyo osengeli komema soki likama ebimi?” na Lamuká! No. 5 2017, lok. 6

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto