Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb26 Mai nk. 2-3
  • 04-10/05

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 04-10/05
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2026
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2026
mwb26 Mai nk. 2-3

04-10/05

YISAYA 58-59

Loyembo 21 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

1. Ndenge ya kozwa mpenza mapamboli ya Yehova

(Min. 10)

Monisáká ezaleli ya koyamba bapaya (Yis 58:​7-9)

Tyáká makambo ya elimo na esika ya liboso (Yis 58:​13, 14; w06 15/6 22 par. 9)

Tyáká motema ete Yehova akokokisa bamposa na yo (Yis 59:1; w13 15/1 13 par. 5-6)


OMITUNA BOYE: ‘Mpo na nini Bayisraele bazangaki mapamboli ya Yehova, mpe ndakisa na bango ekoki koteya ngai nini?’ (Yis 58:​1-5; it “Kokila bilei” par. 3)

Mama moko ná bana na ye mibale ya basi bafandi na nse na mwa ndako na bango, bazali kotánga na esengo buku “Yekolá epai ya Moteyi monene.”

2. Biloko ya motuya ya elimo

(Min. 10)

  • Yis 59:11—Na ndenge nini Bayisraele bazalaki “kokoba konguluma lokola ba-urse”? (it “Urse” par. 6)

  • Biloko nini ya motuya ya elimo oyo ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, okosepela kolobela?

3. Botángi ya Biblia

(Min. 4) Yis 59:​1-12 (th liteya 10)

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

4. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 3) NDAKO NA NDAKO. Salelá trakte mpo na kobanda lisolo. (lmd liteya 1 pwɛ 5)

5. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 4) LITATOLI YA LIBAKU MALAMU. Lobelá liteya moko oyo ezali na apɛndisi A ya mwa buku Lingá bato. (lmd liteya 2 pwɛ 4)

6. Diskur

(Min. 5) lmd apɛndisi A pwɛ 16—Motó ya likambo: Tosengeli kobondelaka mbala na mbala. (th liteya 8)

BOMOI YA BAKRISTO

Loyembo 100

7. “Bózalaka na ezaleli ya koyamba bapaya”

(Min. 15) Lisolo na bayangani.

Paulo alendisaki bakristo ete ‘bázalaka na ezaleli ya koyamba bapaya.’ (Ro 12:13) Baoyo basalelaka toli yango bazwaka mapamboli mingi.—Mas 11:25.

Elilingi oyo euti na video “Kómá moninga ya Yehova​—⁠Zalá moyambi-bapaya.” Kalebe ná libota na bango bayambi bato ya libota moko oyo bakutanaki na bango na Ndako ya Bokonzi.

Lakisá VIDEO Kómá moninga ya Yehova—Zalá moyambi-bapaya. Na nsima tuná bayangani boye:

  • Video yango eteyi yo nini na oyo etali koyamba bapaya?

  • Matomba nini ozwaka ntango omonisi ezaleli ya koyamba bapaya?

Yehova azali ndakisa oyo eleki malamu na oyo etali ezaleli ya koyamba bapaya. (Mis 14:17) Tángá Kolimbola Mibeko 10:​17, 18. Na nsima tuná bayangani boye:

  • Ndakisa ya Yehova na oyo etali koyamba bapaya eteyi yo nini?

  • Bolamu nini tokoki kozwa soki tomonisi ezaleli ya koyamba bapaya epai ya baoyo bazali bandeko na biso ya libota te to baninga na biso te?

  • Banani mosusu na Biblia bamonisaki ezaleli ya koyamba bapaya, mpe ndakisa na bango eteyi yo nini?

  • Kanisá baoyo okosepela komonisela ezaleli ya koyamba bapaya, mpe komá makambo oyo olingi kosalela bango:

8. Boyekoli ya Biblia na lisangá

(Min. 30) lfb liteya 82-83

Maloba ya nsuka (Min. 3) | Loyembo 42 mpe libondeli

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto