Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb22 Novembre lok. 11
  • Tótya motema ete tokobika ntango ebongiseli ya makambo ya ntango oyo ekosuka

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tótya motema ete tokobika ntango ebongiseli ya makambo ya ntango oyo ekosuka
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2022
  • Masolo mosusu
  • Tikalá sembo na ntango ya “bolɔzi monene”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Bokonzi ya Nzambe elongoli banguna na yango
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
  • Armagedone ezali mpenza nsango malamu!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • “Kosikolama na bino ekómi pene”!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2022
mwb22 Novembre lok. 11
Ndeko mobali moko azali koyekola buku “Le culte pur de Jéhovah enfin rétabli!” Azali komona na makanisi ndenge anzelu ya Yehova azali kobatela etuluku ya basaleli ya Yehova na Armagedone.

BOMOI YA BAKRISTO

Tótya motema ete tokobika ntango ebongiseli ya makambo ya ntango oyo ekosuka

Mosika te Yehova akotika komonisela mokili oyo motema molai. Mangomba ya lokuta ekobomama, etuluku ya bikólo oyo esangani ekobundisa basaleli ya Nzambe, mpe Yehova akoboma bato mabe na Armagedone. Bakristo bazelaka na motema likoló kokokisama ya makambo yango.

Na ntembe te, toyebi te makambo nyonso ya mikemike oyo ekosalema na bolɔzi monene. Na ndakisa, toyebi mpenza te ntango nini bolɔzi yango ekobanda. Toyebi te ntina oyo bakonzi ya politiki bakopesa mpo na kobundisa mangomba ya lokuta. Toyebi te ntango boni etuluku ya bikólo oyo esangani ekobundisa basaleli ya Nzambe to makambo nini ekosalema. Lisusu, toyebi te na bosikisiki soki Yehova akosalela nini mpo na koboma bato mabe na Armagedone.

Atako bongo, Makomami eyebisi biso makambo nyonso oyo tosengeli na yango mpo na kolonga makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya na kondima mpe na mpiko. Na ndakisa, toyebi ete tozali kobika na nsuka ya “mikolo ya nsuka.” (2Ti 3:1) Toyebi ete kobomama ya mangomba ya lokuta “ekoyeisama mokuse” mpo lingomba ya solo ekoka kobebisama te. (Mt 24:22) Toyebi ete Yehova akobikisa basaleli na ye. (2Pe 2:9) Mpe toyebi ete Moto oyo Yehova aponi mpo na koboma bato mabe mpe kobikisa ebele mpenza ya bato na Armagedone azali moyengebene mpe azali na nguya mingi.​—Em 19:11, 15, 16.

Na ntembe te, makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya ekosala ete bato ‘bálɛmba nzoto na kobanga.’ Kasi, soki tozali kotánga mpe komanyola misala ya kobikisa oyo Yehova asalá kala mpe makambo oyo ayebisi biso mpo na mikolo ezali koya, ‘tokotɛlɛma alima mpe tokotombola mitó na biso,’ mpo toyebi ete kosikolama na biso ekómi pene.​—Lk 21:26, 28.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto