Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb22 Septembre lok. 13
  • Makambo kitoko oyo ezali na buku Sepelá na bomoi libela na libela!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo kitoko oyo ezali na buku Sepelá na bomoi libela na libela!
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2022
  • Masolo mosusu
  • Salelá bavideo mpo na koteya bato oyo oyekolaka na bango Biblia
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2019
  • Nimero ya sika ya Linongi ya Mosɛnzɛli ya boyekoli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Osalelaka baaparɛyi ya mikolo oyo na mayele?
    Lamuká!—2015
  • Oyo ezali nimero ya boyekoli!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2022
mwb22 Septembre lok. 13

BOMOI YA BAKRISTO

Makambo kitoko oyo ezali na buku Sepelá na bomoi libela na libela!

Osepelaka na bavideo mpe mituna ndenge na ndenge oyo ezali na buku Sepelá na bomoi libela na libela!? Bongo eteni “Soki moto alobi na yo,” “Oyo okoki kosala,” mpe “Makanisi mosusu”? Wapi makambo mosusu oyo ekoki kosalisa yo ntango ozali koyekola na moto Biblia?​—Mt 28:19, 20.

Buku “Sepelá na bomoi libela na libela!” na “JW Library”. Elembo oyo ezali komonisa eteni “Bavideo, masolo mpe Audio ya eteni 1.”

Bavideo, masolo mpe audio: Soki osepeli koyekola na moto na buku yango ya papye, ndenge nini okoki kozwa na pɛtɛɛ nyonso bavideo, ba-audio mpe masolo mosusu ya eteni oyo bozali kotalela? Soki ozali na buku yango na telefone to na tablɛti, kɔtá na moko ya biteni minei ya liboso ya buku yango. Na nsuka ya lokasa ya eteni oyo oponi, okomona bavideo, masolo mpe audio mpo na eteni yango. (Talá fɔtɔ 1.)

“Mode image”: Soki ozali koyekola na moto buku yango na telefone to na tablɛti, okoki mpe kopona kosalela buku yango lokola oyo ya papye. Kaka na lokasa ya liteya oyo bozali, finá na madodo misato oyo ezali na likoló na lobɔkɔ ya mobali, mpe kɔtá na “Mode image.” Yango ekosalisa yo omona malamu ndenge eteni mokomoko ya lisolo eyokani na motó ya likambo ya liteya oyo bozali koyekola. Soki olingi ozongela kosalela buku yango na ndenge ya telefone to tablɛti (digital), finá kaka na madodo wana misato mpe kɔtá na “Mode texte” to finá na elembo ya motane-bule oyo ezali na lobɔkɔ ya mobali na nse.

Buku “Sepelá na bomoi libela na libela!” na “JW Library”. Elembo oyo ezali komonisa bitanda “Nakoki mpenza?” mpe “Maloba na nsuka ya lisolo.”

“Nakoki mpenza?”: Bitanda oyo ezali pene na nsuka ya eteni 4 ya buku yango, elobeli mwa makambo oyo moyekoli akoki kosala mpo na kobanda kosakola na bandeko ya lisangá mpe kozwa batisimo. (Talá fɔtɔ 2.)

Maloba na nsuka ya lisolo: Maloba na nsuka ya lisolo epesi bandimbola ya masolo mosusu ya ntina. Soki ozali kosalela buku yango na telefone to tablɛti, okomona lien na nsuka ya “Maloba na nsuka ya lisolo” ya eteni mokomoko oyo ekomema mbala moko na esika oyo osukaki na liteya yango. (Talá fɔtɔ 2.)

Salá makasi osilisa koyekola buku Sepelá na bomoi libela na libela! na bayekoli ya Biblia oyo bazali kokola malamu. Mpe soki bosilisaki koyekola yango te liboso bázwa batisimo, bókoba koyekola yango nsima ya batisimo. Okoki kokoba kozwa ngonga, kotánga moto yango moyekoli ya Biblia to moto oyo ozongelaka ata nsima ya batisimo. Soki mosakoli mosusu asanganaki na boyekoli yango ya Biblia, ye mpe akoki kozwa ngonga

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto