MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE
Luká libɔndisi epai ya Yehova
Eliya abangaki mpe akimaki mpo na kobikisa bomoi na ye (1Ba 19:3, 4; w19.06 lok. 15 par. 5)
Yehova apesaki Eliya lisalisi oyo ebongi mpe alakisaki ye nguya na Ye na ndenge ya kokamwa (1Ba 19:5-7, 11, 12; ia mok. 12 par. 13; mok. 12 par. 21)
Yehova apesaki ye mokumba (1Ba 19:15-18; ia mok. 12 par. 22)
Lelo oyo, Yehova asololaka na biso na nzela ya Liloba na ye Biblia, buku yango esalisaka biso tóyeba ete atyelaka biso likebi mpe apesá biso mosala moko ya ntina mingi.—1Ko 15:58; Kol 3:23.