BOMOI YA BAKRISTO
Monisá kondima ntango ozali na mikakatano ya mbongo
Bomoi na mikolo oyo ya nsuka etondi na mikakatano. Lokola tozali kokóma na nsuka ya mokili mabe oyo, ntembe ezali te ete mikakatano ekobakisama lisusu. Na bantango mosusu, tokoki kozanga bilei to biloko mosusu ya kobikela. (Hab 3:16-18) Nini ekosalisa biso tózala na kondima ntango tokutani na mikakatano ya mbongo? Tosengeli kokoba kotyela Yehova, Nzambe na biso motema. Alakaki ete akosalisa basaleli na ye, mpe akokokisa bamposa na biso ata soki likambo nini ebimi.—Nz 37:18, 19; Ebr 13:5, 6.
Oyo okoki kosala:
Sengá Yehova atambwisa yo, apesa yo bwanya mpe lisungi.—Nz 62:8
Ndimá kosala ata mosala oyo mbala mosusu osala naino te.—g 1/10 8-9, etanda
Batelá mimeseno malamu ya elimo, na ndakisa kotánga Biblia mikolo nyonso, koyangana na makita ya lisangá mpe kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola
TALÁ VIDEO TONGÁ NDAKO OYO EKOUMELA—‘SEPELÁ NA BILOKO OYO OZALI NA YANGO SIKOYO’ NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:
Mikakatano nini mabota mosusu bakutanaki na yango?
Likambo nini eleki ntina na bomoi?
Ndenge nini tokoki kosalisa bandeko oyo bazali kokutana na mikakatano ya mbongo?