Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb22 Juillet lok. 15
  • Olukaka biyano na mabondeli na yo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Olukaka biyano na mabondeli na yo?
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2022
  • Masolo mosusu
  • Pusaná penepene na Nzambe na libondeli
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Ndenge oyo Yehova ayanolaka na mabondeli na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • Mabondeli nini mandimami na Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Yehova ayanolaka na mabondeli na ngai?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2022
mwb22 Juillet lok. 15
Ndeko mwasi moko azali kobondela. Biblia na ye ezali na mesa.

BOMOI YA BAKRISTO

Olukaka biyano na mabondeli na yo?

Biblia ezali na bandakisa mingi ya mabondeli oyo Yehova ayanolaki. Ntango basaleli ya Nzambe bamonaki ndenge Yehova ayokaki mitungisi na bango mpe asalisaki bango, kondima na bango ekómaki lisusu makasi. Yango wana, ezali na ntina tólobaka polelepolele ntango tozali kosala mabondeli na biso moko mpe tóluka komona eyano ya Yehova. Tóbosana te ete Yehova akoki koyanola na mabondeli na biso na lolenge oyo tokanisaki te. (2Ko 12:7-9; Ef 3:20) Yehova akoki kopesa biso nini ntango tobondeli ye?

  • Makasi na nzoto, makanisi ya kimya, to kondima mpo na koyikela mokakatano moko mpiko.​—Flp 4:13

  • Bwanya mpo na kozwa ekateli ya malamu.​—Yk 1:5

  • Mposa mpe nguya ya kosala.​—Flp 2:13

  • Kimya ntango tozali na mitungisi.​—Flp 4:6, 7

  • Lisungi to libɔndisi ya bandeko.​—1Yn 3:17, 18

  • Lisalisi oyo apesaka bandeko oyo tobondelaka mpo na bango.​—Mis 12:5, 11

TALÁ VIDEO YEHOVA AZALI “MOYOKI YA LIBONDELI,” MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Ndenge nini lisolo ya ndeko Shimizu ekoki kolendisa biso ntango tozali na likoki ya kosala mingi te mpo nzoto ezali malamu te?

  • Ndenge nini tokoki komekola ndakisa ya ndeko Shimizu?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto