22-28/11
Basambisi 1-3
Loyembo 126 mpe libondeli
Maloba ya ebandeli (Min. 1)
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE
“Ndakisa moko ya mpiko mpe ya kokamwisa”: (Min. 10)
Biloko ya motuya ya elimo: (Min. 10)
Bas 2:10-12—Ndakisa oyo esengeli kokebisa biso na nini? (w05 15/1 lok. 25 par. 1)
Biloko nini ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, oyo okosepela kolobela mpo na Yehova, mosala ya kosakola to eloko mosusu?
Botángi ya Biblia: (Min. 4) Bas 3:12-31 (th liteya 5)
OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
“Bakisá esengo na yo na mosala ya kosakola—Ndimá lisalisi oyo Yehova apesi na nzela ya libondeli”: (Min. 10) Lisolo na bayangani. Lakisá video Okoki koyoka esengo ya kokómisa bato bayekoli—Ndimá lisalisi oyo Yehova apesi—Libondeli.
Boyekoli ya Biblia: (Min. 5) lffi liteya 02 maloba ya ebandeli mpe pwɛ 1-3 (th liteya 11)
BOMOI YA BAKRISTO
Kómá moninga ya Yehova—Zalá mosakoli oyo abongi: (Min. 5) Lisolo na bayangani. Lakisá video. Na nsima, soki likoki ezali, bengá bana oyo oponaki báya na estrade, mpe tuná bango boye: Ndenge nini tokoki komibongisa mpo na mosala ya kosakola? Ndenge nini tokoki kobongisa elateli na biso mpe koboya kolekisa ndelo? Makambo nini ya mabe tosengeli te kosala na mosala ya kosakola?
“Makanisi mpo na kotambwisa likita ya mosala ya kosakola oyo ekobimisa matomba”: (Min. 10) Lisolo na bayangani. Ekosalema na mokɛngɛli ya mosala ya kosakola. Sɛngá bayangani bámonisa mpo na nini ezali na ntina kokómaka na ngonga na likita ya mosala ya kosakola liboso ebanda.
Boyekoli ya Biblia na lisangá: (Min. 30) lvs mok. 13 par. 15-18 mpe Maloba na nsuka ya lisolo 28.a
Maloba ya nsuka (Min. 3)
Loyembo 48 mpe libondeli
a Esengeli kotánga “Maloba na nsuka ya lisolo.”