OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA | BAKISÁ ESENGO NA YO NA MOSALA YA KOSAKOLA
Simbáká mitema
Kotosa Nzambe eutaka na motema. (Mas 3:1) Yango wana, ntango tozali koteya, tosengeli kosala makasi mpo tósimba mitema ya bayoki na biso. Ndenge nini tokoki kosala yango?
Kosuka kaka te na koteya moyekoli na yo solo ya Biblia, kasi salisá ye ayokanisa bomoi na ye na solo yango, mpe na boyokani na ye ná Yehova. Salisá ye amona ete mitinda ya Biblia emonisaka bolingo, bolamu, mpe boyengebene ya Nzambe. Na mayele nyonso, tuná ye motuna oyo ekosalisa ye amitalela mpe aloba ndenge azali komiyoka mpo na makambo oyo azali koyekola. Salisá ye akanisa na matomba oyo akoki kozwa soki atiki etamboli mpe mimeseno ya mabe. Ntango omoni moyekoli na yo ya Biblia azali kolinga Yehova na motema na ye mobimba, yango ekobakisa esengo na yo.
TALÁ VIDEO OKOKI KOYOKA ESENGO YA KOKÓMISA BATO BAYEKOLI—KOLISÁ MAKOKI NA YO—SIMBÁKÁ MITEMA, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:
Mpo na nini Neeta atunaki Rose: “Okanisaki na makambo tosololaki lundi?”
Ndenge nini Neeta asalisaki Rose amona ete mitinda ya Biblia emonisaka ete Yehova alingaka ye?
Soki tozali kosimba motema ya moyekoli na biso, yango ekolendisa ye akola na elimo
Ndenge nini Neeta asalisaki Rose akanisa ndenge akoki komonisa ete alingaka Nzambe?