Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb21 Mai lok. 5
  • Salelá bandakisa mpo na kobimisa makanisi ya ntina

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Salelá bandakisa mpo na kobimisa makanisi ya ntina
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
  • Masolo mosusu
  • Bandakisa oyo ezali koteya
    Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
  • Ndimá lisalisi oyo Yehova apesi na nzela ya libondeli
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
  • Bakisá esengo na yo na mosala ya kosakola​—Saleláká Liloba ya Nzambe
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
  • Tunáká mituna
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
mwb21 Mai lok. 5
Mama moko ná mwana na ye bazali kotala ndɛkɛ mpe bafololo wana bazali kolanda Lisolo ya Yesu likoló ya Ngomba.

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA | BAKISÁ ESENGO NA YO NA MOSALA YA KOSAKOLA

Salelá bandakisa mpo na kobimisa makanisi ya ntina

Ntango tozali kozongela bato to kotambwisa boyekoli ya Biblia, tosengeli kosalisa bayoki na biso bákanga ntina ya makanisi ya ntina. Soki tozali kosalela bandakisa mpo na kobimisa makanisi ya ntina, yango ekosimba mitema ya bayoki na biso mpe ekosala ete bábosana te makambo oyo bayekoli.

Ntango ozali komibongisa mpo na kozongela moto to mpo na kotambwisa boyekoli ya Biblia, poná makanisi ya ntina oyo omoni malamu osalela ndakisa mpo na kolimbola yango, kasi kopona te makambo ya mikemike. Na nsima, poná bandakisa ya pɛtɛɛ oyo eyokani na makambo oyo bato basalaka mokolo na mokolo. (Mt 5:14-16; Mr 2:21; Lk 14:7-11) Kobosana te mimeseno mpe makambo oyo bayoki na yo basalaka. (Lk 5:2-11; Yn 4:7-15) Ntango omoni ndenge moto oyo ozali kosolola na ye ayoki esengo mpo akangi ntina ya liteya moko, yango ekopesa yo esengo mpenza.

TALÁ VIDEO OKOKI KOYOKA ESENGO YA KOKÓMISA BATO BAYEKOLI: KOLISÁ MAKOKI NA YO​—SALELÁ BANDAKISA MPO NA KOBIMISA MAKANISI YA NTINA, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Elilingi euti na video ‘Okoki koyoka esengo ya kokómisa bato bayekoli: Kolisá makoki na yo​—Salelá bandakisa mpo na kobimisa makanisi ya ntina.’ Rose azali kotuna Neeta motuna.

    Mpo na nini esengeli kosalisa bayekoli ya Biblia bákanga ntina ya bavɛrsɛ ya Biblia?

  • Elilingi euti na video ‘Okoki koyoka esengo ya kokómisa bato bayekoli: Kolisá makoki na yo​—Salelá bandakisa mpo na kobimisa makanisi ya ntina.’ Neeta azali kopesa Rose ndakisa moko.

    Ndakisa nini Neeta asalelaki mpo na kolimbola solo ya Biblia oyo ezali na Baroma 5:12?

  • Elilingi euti na video ‘Okoki koyoka esengo ya kokómisa bato bayekoli: Kolisá makoki na yo​—Salelá bandakisa mpo na kobimisa makanisi ya ntina.’ Neeta azali kolakisa Rose video.

    Bandakisa ya malamu esimbaka mpenza motema

    Soki tosaleli bandakisa ya malamu, yango ekoki kosala nini epai ya bayoki na biso?

  • Na mosala ya kosakola, mpo na nini tosengeli kosalela bavideo mpe bisaleli mosusu mpo na koteya oyo ebongiseli ya Yehova ezali kopesa biso?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto