Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb21 Janvier lok. 9
  • Nzambe ná Kristo bakopesa biso bonsomi na mikolo ezali koya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe ná Kristo bakopesa biso bonsomi na mikolo ezali koya
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
  • Masolo mosusu
  • Yehova asalisaka biso ntango tozali kokutana na komekama
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
  • Ndenge nini tosengeli kotalelaka komekama?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Ndenge ya kobatela esengo na ntango ya mikakatano
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
mwb21 Janvier lok. 9
Yesu afandi na kiti na ye ya Bokonzi azali kotala na nse mpe na nsima na ye kongɛnga ezali kouta na kiti ya Bokonzi ya Yehova.

BOMOI YA BAKRISTO

Nzambe ná Kristo bakopesa biso bonsomi na mikolo ezali koya

Makambo nini etungisaka yo mokolo na mokolo? Ozali tata ya libota mpe ozali kobunda mpo na kokokisa bamposa ya libota na yo? Ozali kobunda mpo na kobɔkɔla yo moko bana na yo mpe kokokisa bamposa na bango? Soki ozali elenge, baninga na yo ya kelasi batumolaka yo? Ozali kobunda na mikakatano ya sante to okómi mobange? Moto na moto azali na mikakatano na ye. Bakristo mingi bazali kokutana na mikakatano ndenge na ndenge na mbala moko. Ata bongo, toyebi ete mosika te tokosikolama na mikakatano wana nyonso.​—2Ko 4:16-18.

Kasi liboso ntango yango eya, tobɔndisamaka ndenge toyebaka ete Yehova ayebaka mikakatano na biso, mpe asepelaka na bosembo na biso mpe na ezaleli na biso ya koyika mpiko mpe akopambola biso mingi mpenza. (Yir 29:11, 12) Yesu mpe atyelaka biso mpenza likebi. Wana tozali kokokisa mikumba na biso ya bokristo, Yesu alendisi biso boye: “Nazali elongo na bino.” (Mt 28:20) Ntango totɛlɛmaka mpe tokanisaka na mozindo na bonsomi oyo tokozwa na Bokonzi ya Nzambe, yango ekómisaka makasi elikya mpe ekateli na biso ya koyika mpiko na mikakatano oyo tozali kokutana na yango.​—Ro 8:19-21.

TALÁ VIDEO LOKOLA MOPƐPƐ MAKASI EZALI KOYA, TYÁ LIKEBI NA YO EPAI YA YESU!​—MAPAMBOLI YA BOKONZI NA MIKOLO EZALI KOYA, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Mpo na nini bato bakómá mosika na Nzambe, mpe yango ebimisi makambo nini?

  • Makambo nini baoyo bazali sembo epai ya Yehova bazali kozela na mikolo ezali koya?

  • Nini emonisi ete makambo yango ya malamu ekokokisama na mikolo ezali koya?

  • Mapamboli nini oyo Nzambe alaki na mokili ya sika ozali kozela na mposa makasi?

Bililingi: Bato bazali kosepela na mapamboli na paradiso. 1. Ndeko mwasi moko azali koyamba moto moko oyo asekwi. 2. Bato bazali kosepela na ebele ya bilei, mokili ya pɛto, mpe ya kimya.

Omimona na mokili ya sika

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto