MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | BALEVI 8-9
Elembo oyo emonisaki lipamboli ya Yehova
Yehova asalaki ete mɔtɔ ezikisa likabo ya liboso ya kotumba na ntango oyo bonganga-nzambe ya libota ya Arona etyamaki. Yango emonisaki ete Yehova azalaki na bango mpe andimaki bonganga-nzambe yango. Na nsima, Yehova alendisaki Bayisraele oyo bamonaki makambo yango bápesa bonganga-nzambe yango mabɔkɔ. Lelo oyo, Yehova azali kosalela Yesu Kristo lokola Nganga-nzambe monene. (Ebr 9:11, 12) Na mobu 1919, Yesu atyaki etuluku moke ya mibali oyo batyami mafuta na elimo santu lokola “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Mt 24:45) Nini endimisi biso mpenza ete Yehova azali kondima moombo ya sembo, azali kopambola ye mpe kosunga ye?
Atako minyoko ya makasi, moombo ya sembo azali kokoba kopesa biso bilei ya elimo
Ndenge esakolamaki, nsango malamu ezali kosakolama “na mabele mobimba esika bato bafandi.”—Mt 24:14
Ndenge nini tokoki kopesa moombo ya sembo mpe ya mayele mabɔkɔ na motema na biso mobimba?