16-22/11
BALEVI 4-5
Loyembo 84 mpe libondeli
Maloba ya ebandeli (Min. 1)
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE
“Pesá Yehova oyo eleki malamu”: (Min. 10)
Le 5:5, 6—Baoyo bazalaki kosala masumu basengelaki kopesa likabo ya ngambo, ekokaki kozala mwana-mpate to mwana-ntaba (it-2-F nk. 848-849 par. 13)
Le 5:7—Baoyo bazalaki na makoki te ya kopesa mwana-mpate to mwana-ntaba mpo bazalaki babola, basengelaki kopesa bipopo mibale to bibenga mibale (w09 1/6 lok. 26 par. 3)
Le 5:11—Baoyo bazalaki na makoki te ya kopesa bipopo mibale to bibenga mibale mpo bazalaki babola, basengelaki kopesa moko ya bandambo zomi ya efa ya farini ya malamu (w09 1/6 lok. 26 par. 4)
Tóluka biloko ya motuya ya elimo: (Min. 10)
Le 5:1—Ndenge nini bakristo bakoki kosalela vɛrsɛ oyo? (w16.02 lok. 24 par. 14)
Le 5:15, 16—Ndenge nini moto azalaki ‘kozanga bosembo atako asaleli biloko mosantu ya Yehova lisumu na nko te’? (it-2-F lok. 861 par. 8)
Biloko nini ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, oyo okosepela kolobela mpo na Yehova, mosala ya kosakola to eloko mosusu?
Botángi ya Biblia: (Eleka min. 4 te) Le 4:27–5:4 (th liteya 5)
OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
Bokutani ya liboso: (Eleka min. 3 te) Mpo na kobanda, salelá maloba ya bokutani ya liboso oyo ezali na “Ndenge ya kobanda lisolo.” Kasi salelá Yisaya 9:6, 7. (th liteya 12)
Kozongela moto: (Eleka min. 4 te) Mpo na kobanda, salelá maloba ya kozongela moto oyo ezali na “Ndenge ya kobanda lisolo.” Kasi salelá Nzembo 72:16. (th liteya 4)
Boyekoli ya Biblia: (Eleka min. 5 te) lvs mok. 15 par. 22-23 (th liteya 19)
BOMOI YA BAKRISTO
Na lisalisi ya Yehova—Tosali elongo mbula 60 na mosala ya mobongisi-nzela: (Min. 15) Lakisá video. Na nsima, tuná bayangani mituna oyo: Makambo nini ya malamu Takako ná Hisako bakutanaki na yango na mosala na bango ya ntango nyonso? Mikakatano nini ya sante Takako azalaki na yango, mpe nini esalisaki ye? Nini esalaki ete bázala na esengo mpe básepela na mikumba oyo bazalaki na yango? Ndenge nini ndakisa na bango emonisi mpenza makanisi oyo ezali na bavɛrsɛ oyo: Masese 25:11; Mosakoli 12:1; Baebre 6:10?
Boyekoli ya Biblia na lisangá: (Eleka min. 30 te) lvs “Mokanda oyo euti na Lisangani ya Mikóló-Bakambi” mpe mok. 1 par. 1-3
Maloba ya nsuka (Eleka min. 3 te)
Loyembo 108 mpe libondeli