Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb20 Octobre lok. 3
  • Zwá na motuya boyokani na yo ná Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Zwá na motuya boyokani na yo ná Yehova
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2020
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini komibatela na losambo ya bikeko?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Tomibatela na lolenge nyonso ya losambo ya bikeko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Ozali na boyokani ya ndenge nini ná Yehova?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Teyá basusu bálinga Yehova
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2020
mwb20 Octobre lok. 3
Bililingi: Mobali moko azali kokómisa boyokani na ye ná Yehova makasi. 1. Azali kobondela. Likɔnga etali likoló. 2. Azali kotánga Biblia. Likɔnga etali na nse.

BOMOI YA BAKRISTO

Zwá na motuya boyokani na yo ná Yehova

Lokola tozali Batatoli ya Yehova oyo tomipesá mpe tozwá batisimo, tozalaka na libaku moko kitoko ya kokómisa makasi boyokani na biso ná Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso. Abendá biso epai na ye na nzela ya Mwana na ye. (Yn 6:44) Ayokaka mabondeli na biso.​—Nz 34:15.

Ndenge nini tokoki kobatela boyokani ya malamu oyo tozali na yango ná Nzambe? Tosengeli koboya mabunga oyo Bayisraele basalaki. Mwa moke nsima ya kosala kondimana mpe boyokani ná Yehova, basalaki mwana-ngɔmbɛ ya wolo mpe basambelaki yango. (Kob 32:7, 8; 1Ko 10:7, 11, 14) Tokoki komituna boye: ‘Nasalaka nini soki nakutani na komekama? Makambo oyo nasalaka emonisaka ete nazwaka na motuya boyokani na ngai ná Yehova?’ Soki tolingi Tata na biso ya likoló mingi, yango ekosalisa biso tóboya makambo oyo ayinaka.​—Nz 97:10.

TALÁ VIDEO BATELÁ BOYOKANI NA YO NÁ YEHOVA (KOL 3:5), MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Bilulela ezali nini?

  • Mpo na nini tosengeli koboya lokoso mpe losambo ya bikeko?

  • Na ndenge nini kosala ekobo mpe kosambela bikeko ezali na boyokani?

  • Mpo nini ezali na ntina, mingimingi mpo na baoyo bazali na mikumba na ebongiseli ya Teokrasi bakokisaka bamposa ya balongani na bango?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto