Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb20 Août lok. 8
  • 31/08–06/09

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 31/08–06/09
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2020
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2020
mwb20 Août lok. 8

31/08–06/09

KOBIMA 21-22

  • Loyembo 141 mpe libondeli

  • Maloba ya ebandeli (Min. 1)

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

  • “Talelá bomoi ndenge Yehova atalelaka yango”: (Min. 10)

    • Kob 21:20​—Yehova ayinaka koboma moto (it-1-F lok. 553 par. 1)

    • Kob 21:22, 23​—Yehova azwaka na motuya bomoi ya mwana oyo azali naino na kati ya libumu (lvs mok. 7 par. 16)

    • Kob 21:28, 29​—Yehova alingaka ete tózala ekɛngɛ mpe tómibatela (w10 15/4 lok. 29 par. 4)

  • Tóluka biloko ya motuya ya elimo: (Min. 10)

    • Kob 21:5, 6​—Na kotalela bavɛrsɛ oyo, ndenge nini komipesa na Nzambe ememelaka biso matomba? (w10 15/1 lok. 4 par. 4-5)

    • Kob 21:14​—Ndenge nini vɛrsɛ oyo ekoki kolimbolama? (it- 1-F lok. 545 par. 4)

    • Biloko nini ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, oyo okosepela kolobela mpo na Yehova, mosala ya kosakola to eloko mosusu?

  • Botángi ya Biblia: (Eleka min. 4 te) Kob 21:1-21 (th liteya 5)

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

  • Bokutani ya liboso: (Eleka min. 3 te) Mpo na kobanda, salelá maloba ya bokutani ya liboso oyo ezali na “Ndenge ya kobanda lisolo.” Na nsima, bengisá moto yango na makita. (th liteya 2)

  • Kozongela moto: (Eleka min. 4 te) Mpo na kobanda, salelá maloba ya kozongela moto oyo ezali na “Ndenge ya kobanda lisolo.” Na nsima, salá lokola outi kolakisa nkolo-ndako video Makambo esalemaka ndenge nini na Ndako ya Bokonzi? (th liteya 20)

  • Diskur: (Eleka min. 5 te) w09 1/4 lok. 31​—Motó ya likambo: Yehova azali Tata ya bitike. (th liteya 19)

BOMOI YA BAKRISTO

  • Loyembo 60

  • Tópesa bomoi valɛrɛ ndenge Nzambe apesaka yango: (Min. 10) Lisolo na bayangani. Lakisá video. Na nsima, tuná bayangani mituna oyo: Mikakatano nini ekoki kobima ntango mwasi azali na zemi? Ndenge nini Kobima 21:22, 23 esalisaka biso na likambo etali kolongola zemi? Mpo na nini esengeli kozala na kondima mpe mpiko mpo na kozwa ekateli oyo esepelisaka Yehova? Ndenge nini elikya ya lisekwa ekitisaka biso motema?

  • Ndenge komipesa ememelaka biso matomba: (Min. 5) Diskur euti na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/01/2010, lokasa 4, paragrafe 4-7. Lendisá bayekoli ya Biblia bákende liboso, bámipesa mpe bázwa batisimo.

  • Boyekoli ya Biblia na lisangá: (Min. 30) jy mok. 130

  • Maloba ya nsuka (Eleka min. 3 te)

  • Loyembo 15 mpe libondeli

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto