24-30/08
KOBIMA 19-20
Loyembo 88 mpe libondeli
Maloba ya ebandeli (Min. 1)
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE
“Mibeko Zomi etaleli yo na nini?”: (Min. 10)
Kob 20:3-7—Kumisá Yehova mpe kangamá kaka na ye (w89-F 15/11 nk. 5-6 par. 6)
Kob 20:8-11—Tyá makambo ya elimo na esika ya liboso na bomoi na yo
Kob 20:12-17—Kumisá basusu mpe pesá bango limemya (w89-F 15/11 lok. 6 par. 1-2)
Tóluka biloko ya motuya ya elimo: (Min. 10)
Kob 19:5, 6—Mpo na nini Yisraele ya kala ebungisaki libaku ya kozala “bokonzi moko ya banganga-nzambe”? (it-2-F lok. 658 par. 5-6)
Kob 20:4, 5—Na ndenge nini Yehova ‘ayeisaka etumbu mpo na libunga ya batata’ epai ya mabota oyo ekolanda? (w04 15/3 lok. 27 par. 1)
Biloko nini ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, oyo okosepela kolobela mpo na Yehova, mosala ya kosakola to eloko mosusu?
Botángi ya Biblia: (Eleka min. 4 te) Kob 19:1-19 (th liteya 10)
OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
Bokutani ya liboso: (Eleka min. 3 te) Mpo na kobanda, salelá maloba ya bokutani ya liboso oyo ezali na “Ndenge ya kobanda lisolo.” Na nsima, pesá nkolo-ndako karte ya jw.org. (th liteya 1)
Kozongela moto: (Eleka min. 4 te) Mpo na kobanda, salelá maloba ya kozongela moto oyo ezali na “Ndenge ya kobanda lisolo.” Na nsima, pesá nkolo-ndako moko ya mikanda oyo ezali na kati ya bisaleli na biso mpo na koteya. (th liteya 15)
Boyekoli ya Biblia: (Eleka min. 5 te) bhs mok. 6 par. 17-19 (th liteya 8)
BOMOI YA BAKRISTO
Nasala nini mpo baboti bábakisela ngai mwa liberté?: (Min. 6) Lisolo na bayangani. Lakisá video moto azali koyema. Na nsima, tuná bilenge mituna oyo: Okoki kosala nini mpo baboti na yo bátyelaka yo motema? Osengeli kosala nini soki osali libunga moko? Mpo na nini kokumisa baboti na yo ekosala ete bápesa yo lisusu bonsomi?
Salisá mpe pesá baboti na yo oyo bakómi mibange lokumu: (Min. 9) Lisolo na bayangani. Lakisá video. Na nsima, tuná bayangani mituna oyo: Mikakatano nini ekoki kobima ntango baboti bakómi mibange? Mpo na nini bana basengeli kosololaka malamu mpo na koyeba ndenge ya kobatela mpe kosunga baboti na bango? Ndenge nini bana bakoki kopesa baboti na bango lokumu ntango bazali kosalisa bango?
Boyekoli ya Biblia na lisangá: (Min. 30) jy mok. 129, etanda “Kobɛta fimbo”
Maloba ya nsuka (Eleka min. 3 te)
Loyembo 13 mpe libondeli