10-16/08
KOBIMA 15-16
Loyembo 149 mpe libondeli
Maloba ya ebandeli (Min. 1)
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE
“Kumisá Yehova na loyembo”: (Min. 10)
Kob 15:1, 2—Moize ná mibali mosusu ya Yisraele bakumisaki Yehova na loyembo (w95 15/10 lok. 11 par. 11)
Kob 15:11, 18—Yehova abongi kozwa lokumu (w95 15/10 nk. 11-12 par. 15-16)
Kob 15:20, 21—Miriame ná basi mosusu ya Yisraele bakumisaki Yehova na loyembo (it-2-F lok. 360 par. 6; lok. 674 par. 1)
Tóluka biloko ya motuya ya elimo: (Min. 10)
Kob 16:13—Ekoki kozala mpo na nini Yehova asalelaki ndɛkɛ oyo babengi kaye mpo na koleisa bana ya Yisraele na esobe? (w11 1/9 lok. 14)
Kob 16:32-34—Epai wapi babombaki elokó oyo ezalaki na mana? (w06 15/1 lok. 31 par. 4-5)
Biloko nini ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, oyo okosepela kolobela mpo na Yehova, mosala ya kosakola to eloko mosusu?
Botángi ya Biblia: (Eleka min. 4 te) Kob 16:1-18 (th liteya 10)
OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
Video mpo na bokutani ya liboso: (Min. 4) Lisolo na bayangani. Lakisá video mpe na nsima tuná bayangani mituna oyo: Ndenge nini Linda asalelaki malamu mituna? Asalaki nini mpo na komonisa polele ndenge ya kosalela vɛrsɛ ya Biblia?
Bokutani ya liboso: (Eleka min. 3 te) Mpo na kobanda, salelá maloba ya bokutani ya liboso oyo ezali na “Ndenge ya kobanda lisolo.” Pesá nkolo-ndako moko ya mikanda oyo ezali na kati ya bisaleli na biso mpo na koteya. (th liteya 3)
Bokutani ya liboso: (Eleka min. 5 te) Mpo na kobanda, salelá maloba ya bokutani ya liboso oyo ezali na “Ndenge ya kobanda lisolo.” Na nsima, salá lokola outi kolakisa nkolo-ndako video Boyekoli ya Biblia esalemaka ndenge nini? mpe bólobela yango. (th liteya 9)
BOMOI YA BAKRISTO
“Kumisá Yehova na mosala ya mobongisi-nzela”: (Min. 15) Lisolo na bayangani. Lakisá video Bandeko basi misato na Mongolie. Sololá na ndeko moko oyo azali mobongisi-nzela to oyo azalaki mobongisi-nzela na bambula euti koleka. Mpe tuná ye mituna oyo: Mikakatano nini okutanaki na yango? Mapamboli nini ozwaki?
Boyekoli ya Biblia na lisangá: (Min. 30) jy mok. 127, etanda “Elanga ya makila”
Maloba ya nsuka (Eleka min. 3 te)
Loyembo 16 mpe libondeli