BOMOI YA BAKRISTO
Ndenge nini biloko oyo Nzambe akelá ezali koteya biso mpiko?
Na nzela ya basi mpe mibali ya sembo oyo Biblia elobeli, Yehova ateyaka biso ndenge ya komonisa bizaleli oyo azalaka na yango. Longola yango, ateyaka biso na nzela ya biloko oyo akelá. (Yb 12:7, 8) Mateya nini tokoki kozwa na mpiko oyo nkɔsi, mpunda, mwa nyama babengi mangouste, mwa ndɛkɛ babengi colibri, mpe nzoku ezalaka na yango?
TALÁ VIDEO BILOKO OYO NZAMBE AKELÁ EZALI KOTEYA BISO MPIKO, MPE NA NSIMA YÁNOLA NA MITUNA OYO:
Ndenge nini nkɔsi ya mwasi emonisaka mpiko mpo na kobatela bana na yango?
Ndenge nini mpunda ezwaka formasyo mpo ezala na mpiko na etumba?
Mpo na nini mwa nyama babengi mangouste ebangaka te nyoka ya ngɛngɛ?
Ndenge nini mwa ndɛkɛ babengi colibri emonisaka mpiko?
Ndenge nini nzoku ebatelaka na mpiko nyonso banzoku mosusu ya etonga?
Banyama oyo eteyi yo nini na oyo etali mpiko?