20-26/07
KOBIMA 10-11
Loyembo 65 mpe libondeli
Maloba ya ebandeli (Min. 1)
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE
“Moize ná Arona bamonisi mpiko mpenza”: (Min. 10)
Kob 10:3-6—Moize ná Arona na mpiko nyonso basakolaki bolɔzi ya mwambe liboso ya Farao (w09 15/7 lok. 20 par. 6)
Kob 10:24-26—Moize ná Arona batikaki te ete mbamba ya Farao etinda bango bábuka mitindo ya Yehova
Kob 10:28; 11:4-8—Moize ná Arona basakolaki bolɔzi ya zomi kozanga kobanga (it-2-F lok. 309 par. 6)
Tóluka biloko ya motuya ya elimo: (Min. 10)
Kob 10:1, 2—Liteya nini baboti bakoki kozwa na bavɛrsɛ oyo? (w95 1/9 lok. 11 par. 11)
Kob 11:7—Yehova alingaki koloba nini ntango alobaki ete “mbwa ekongalela moto ata moko te kati na bana ya Yisraele”? (it-1-F lok. 849 par. 6)
Biloko nini ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, oyo okosepela kolobela mpo na Yehova Nzambe, mosala ya kosakola to eloko mosusu?
Botángi ya Biblia: (Eleka min. 4 te) Kob 10:1-15 (th liteya 10)
OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
Video mpo na kozongela moto: (Min. 5) Lisolo na bayangani. Lakisá video, mpe na nsima, tuná mituna oyo: Liteya nini ozwi na ndenge oyo mosakoli akanisaki ná nkolo-ndako? Soki ezalaka yo, mokanda nini oyo ezali na kati na bisaleli na biso mpo na koteya olingaki kolakisa Nkolo-ndako?
Kozongela moto: (Eleka min. 4 te) Mpo na kobanda, salelá maloba ya kozongela moto oyo ezali na “Ndenge ya kobanda lisolo.” Bengisá nkolo-ndako na makita. (th liteya 8)
Kozongela moto: (Eleka min. 4 te) Mpo na kobanda, salelá maloba ya kozongela moto oyo ezali na “Ndenge ya kobanda lisolo.” Na nsima, pesá nkolo-ndako moko ya mikanda oyo ezali na kati ya bisaleli na biso mpo na koteya. (th liteya 12)
BOMOI YA BAKRISTO
“Ndenge nini biloko oyo Nzambe akelá ezali koteya biso mpiko?”: (Min. 15) Lisolo na bayangani. Lakisá video Biloko oyo Nzambe akelá ezali koteya biso mpiko.
Boyekoli ya Biblia na lisangá: (Min. 30) jy mok. 124
Maloba ya nsuka (Eleka min. 3 te)
Loyembo 113 mpe libondeli