13-19/07
KOBIMA 8-9
Loyembo 12 mpe libondeli
Maloba ya ebandeli (Min. 1)
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE
“Farao moto ya lolendo apesi mabɔkɔ na mokano ya Nzambe kozanga ete ayeba”: (Min. 10)
Kob 8:15—Farao akómisaki motema na ye makasi mpe aboyaki koyokela Moize ná Arona (it-2-F lok. 431 par. 2)
Kob 8:18, 19—Farao aboyaki koyokela banganga-nzambe na ye ya maji ata ntango bamonaki ete basuki
Kob 9:15-17—Yehova asantisaki nkombo na ye moko na ndenge abomaki Farao mbala moko te (it-2-F nk. 240-241)
Tóluka biloko ya motuya ya elimo: (Min. 10)
Kob 8:21—Mapokopoko ezalaki nini? (it-2-F lok. 1039)
Kob 8:25-27—Mpo na nini Moize alobaki ete mbeka ya Bayisraele ekozala “eloko Baezipito bayinaka na miso na bango”? (w04 15/3 lok. 25 par. 9)
Biloko nini ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, oyo okosepela kolobela mpo na Yehova Nzambe, mosala ya kosakola to eloko mosusu?
Botángi ya Biblia: (Eleka min. 4 te) Kob 8:1-19 (th liteya 12)
OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
Video mpo na Bokutani ya liboso: (Min. 4) Lisolo na bayangani. Lakisá video, mpe na nsima tuná mituna oyo: Ndenge nini mosakoli apesaki eyano na ntembe oyo nkolo-ndako abimisaki? Ndenge nini mosakoli alakisaki nkolo-ndako moko ya mikanda oyo ezali na kati ya bisaleli na biso mpo na koteya?
Bokutani ya liboso: (Eleka min. 2 te) Salelá maloba ya bokutani ya liboso oyo ezali na “Ndenge ya kobanda lisolo.” (th liteya 6)
Bokutani ya liboso: (Eleka min. 3 te) Mpo na kobanda, salelá maloba ya bokutani ya liboso oyo ezali na “Ndenge ya kobanda lisolo.” Pesá eyano na ntembe moko oyo bato babimisaka mingi na teritware na bino. (th liteya 3)
Bokutani ya liboso: (Eleka min. 3 te) Mpo na kobanda, salelá maloba ya bokutani ya liboso oyo ezali na “Ndenge ya kobanda lisolo.” Pesá nkolo-ndako moko ya mikanda oyo toyekolaka na bato Biblia. (th liteya 12)
BOMOI YA BAKRISTO
“Zalá na komikitisa—Boyá komikumisa”: (Min. 7) Lisolo na bayangani. Lakisá video Kómá moninga ya Yehova—Zalá na komikitisa. Na nsima, soki likoki ezali, bengá bana oyo oponaki báya na estrade, mpe tuná bango mituna etali video yango.
“Zalá na komikitisa ntango basusu bakumisi yo”: (Min. 8) Lisolo ya bayangani. Lakisá video Tikalá sembo lokola Yesu—Ntango basusu bakumisi yo.
Boyekoli ya Biblia na lisangá: (Min. 30) jy mok. 123, etanda “Motoki na ye ekómi lokola matangá ya makila”
Maloba ya nsuka (Eleka min. 3 te)
Loyembo 44 mpe libondeli