MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | EBANDELI 48-50
Mibange bakoki koteya biso makambo mingi
Ntango mibange basi mpe mibali babɛtelaka biso masolo ya makambo mingi oyo bamonaki na ‘misala ya kokamwa’ ya Yehova na mikolo oyo ya nsuka, yango ekómisaka kondima na biso makasi epai ya Yehova mpe na bilaka na ye. (Nz 71:17, 18) Soki bozali na bandeko wana ya mibange na lisangá na bino, okoki kotuna bango báyebisa yo
ndenge Yehova asalisaki bango bákoba kosalela ye atako bakutanaki na mikakatano
ndenge bamiyokaka komona motángo ya basakoli ebakisami na boumeli ya bambula mingi
ndenge bamiyokaka soki tozwi bingɛngiseli ya sika na oyo etali mateya ya Biblia
ndenge bamoni mbongwana oyo esalemi na ebongiseli ya Yehova mpo makambo etambola malamu