MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | EBANDELI 44-45
Yozefe alimbisi bandeko na ye
Ekoki kozala mpasi kolimbisa, mingimingi soki moto asali yo mabe na nko. Nini esalisaki Yozefe alimbisa bandeko na ye atako basalaki ye mabe?
Yozefe alukaki te kozongisa mabe na mabe kasi alukaki nde kolimbisa.—Nz 86:5; Lk 17:3, 4
Abombaki nkanda na motema te kasi amekolaki nde Yehova, oyo alimbisaka bato na ye na motema moko.—Mik 7:18, 19
Ndenge nini nakoki komekola Yehova na likambo etali kolimbisa basusu?