04-10/05
EBANDELI 36-37
Loyembo 114 mpe libondeli
Maloba ya ebandeli (Min. 1)
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE
“Bayokeli Yozefe zuwa”: (Min. 10)
Eb 37:3, 4—Bandeko ya Yozefe bayokelaki ye zuwa mpo tata na bango azalaki kolinga ye mingi (w14 1/8 nk. 12-13)
Eb 37:5-9, 11—Bandɔtɔ ya Yozefe ematisaki lisusu zuwa ya bandeko na ye (w14 1/8 lok. 13 par. 2-4)
Eb 37:23, 24, 28—Zuwa ya bandeko ya Yozefe etindaki bango bányokola ye
Tóluka biloko ya motuya ya elimo: (Min. 10)
Eb 36:1—Mpo na nini bapesaki Esau nkombo Edome? (it-1-F lok. 693)
Eb 37:29-32—Mpo na nini bandeko ya Yozefe balakisaki Yakobo elamba ya molai ya Yozefe oyo bapasolaki mpe bazindisaki na makila? (it-1-F lok. 964 par. 5-6)
Biloko nini ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, oyo okosepela kolobela mpo na Yehova Nzambe, mosala ya kosakola to eloko mosusu?
Botángi ya Biblia: (Eleka min. 4 te) Eb 36:1-19 (th liteya 5)
OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya: (Min. 10) Lisolo na bayangani. Lakisá video Makambo oyo bato bakokanga ntina na yango, mpe na nsima bótalela liteya 17 ya mwa buku Koteya.
Diskur: (Eleka min. 5 te) w02 15/10 nk. 30-31—Motó ya likambo: Mpo na nini bakristo basengeli kozala na zuwa oyo eyokani na mokano ya Nzambe? (th liteya 6)
BOMOI YA BAKRISTO
“Omibongisi?”: (Min. 15) Lisolo na bayangani. Ekosalema na nkulutu moko. Lakisá video Omibongisi mpo na makama oyo ekoki kobima?. Kundwelá bandeko malako oyo euti na biro ya filiale na bino mpe epai ya lisangani ya bankulutu, soki ezali.
Boyekoli ya Biblia na lisangá: (Min. 30) jy mok. 113
Maloba ya nsuka (Eleka min. 3 te)
Loyembo 84 mpe libondeli