MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | EBANDELI 24
Mwasi mpo na Yisaka
Mosaleli ya Abrahama asɛngaki Yehova asalisa ye mpo aponela Yisaka mwasi. (Eb 24:42-44) Biso mpe tosengeli koluka lisalisi ya Yehova liboso ya kozwa bikateli ya minene. Ndenge nini okoki kosala yango?
Bondelá
Salá bolukiluki na Liloba ya Nzambe mpe na mikanda ya moombo ya sembo
Luká lisalisi epai ya bakristo oyo bakomeli na elimo