BOMOI YA BAKRISTO
Oyo mwasi ná mobali bakoki kosala mpo bákómisa makasi boyokani na bango na libala
Abrahama ná Sara bazali ndakisa malamu ya babalani oyo bazalaki kolingana mpe kopesana limemya. (Eb 12:11-13; 1Pe 3:6) Ata bongo, libala na bango ezalaki ya kokoka te mpe esɛngaki báyika mpiko na mikakatano ya bomoi. Mateya nini baoyo babalá bakoki kozwa na ndakisa ya Abrahama ná Sara?
Bósololaka malamu. Monisá komikitisa soki molongani na yo alobeli yo maloba na nkanda. (Eb 16:5, 6) Bózwa bibongiseli mpo na kolekisaka ntango elongo. Maloba mpe misala na yo emonisa ete olingaka molongani na yo. Oyo eleki nyonso, bómindimisa ete bino mibale bozali na boyokani malamu na Yehova; yango elakisi bosengeli koyekolaka, kobondelaka mpe kosambelaka elongo. (Mos 4:12) Mabala ya malamu ekumisaka Yehova, Mobandisi ya ebongiseli wana mosantu.
TALÁ VIDEO OYO TOKOKI KOSALA MPO TÓKÓMISA MAKASI BOYOKANI NA BISO NA LIBALA, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:
Na video oyo, bilembo nini emonisi ete Shaan ná Kiara bakómaki kosala makambo moto na moto na ndenge na ye?
Mpo na nini kozala sembo mpe kosolola makambo polele na libala ezali na ntina?
Ndenge nini ndakisa ya Abrahama ná Sara esalisaki Shaan ná Kiara?
Shaan ná Kiara basalaki nini mpo boyokani na bango na libala ekóma makasi?
Mpo na nini mwasi ná mobali basengeli koluka te ete libala na bango ezala ya kokoka?
Okoki kokómisa makasi boyokani na bino na libala!