10-16/02
EBANDELI 15-17
Loyembo 39 mpe libondeli
Maloba ya ebandeli (Min. 1)
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE
“Mpo na nini Yehova apesaki Abrama ná Sarai bankombo mosusu?”: (Min. 10)
Eb 17:1—Atako Abrama azalaki moto ya kozanga kokoka, azalaki na mbeba te (it-1-F lok. 870)
Eb 17:3-5—Abrama azwaki nkombo Abrahama (it-1-F lok. 30 par. 1)
Eb 17:15, 16—Sarai azwaki nkombo Sara (w09 1/2 lok. 13)
Tóluka biloko ya motuya ya elimo: (Min. 10)
Eb 15:13, 14—Ntango nini mbula 400 ya monyoko ebandaki mpe esukaki? (it-1-F lok. 465)
Eb 15:16—Na ndenge nini bakitani ya Abrahama bazongaki na Kanana “na libota ya minei”? (it-1-F lok. 844 par. 7)
Biloko nini ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, oyo okosepela kolobela mpo na Yehova Nzambe, mosala ya kosakola to eloko mosusu?
Botángi ya Biblia: (Eleka min. 4 te) Eb 15:1-21 (th liteya 10)
OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
Video mpo na bokutani ya liboso: (Min. 4) Lisolo na bayangani. Lakisá video mpe na nsima tuná bayangani mituna oyo: Ndenge nini mosakoli asalelaki malamu mituna? Ndenge nini asalelaki ndakisa moko mpo na koteya?
Bokutani ya liboso: (Eleka min. 3 te) Mpo na kobanda, salelá maloba ya bokutani ya liboso oyo ezali na “Ndenge ya kobanda lisolo.” Pesá eyano na ntembe moko oyo bato babimisaka mingi na teritware na bino. (th liteya 3)
Bokutani ya liboso: (Eleka min. 5 te) Mpo na kobanda, salelá maloba ya bokutani ya liboso oyo ezali na “Ndenge ya kobanda lisolo.” Na nsima pesá moto yango mwa buku Nsango malamu, mpe bandá boyekoli na liteya 3. (th liteya 6)
BOMOI YA BAKRISTO
“Oyo mwasi ná mobali bakoki kosala mpo bákómisa makasi boyokani na bango na libala”: (Min. 15) Lisolo na bayangani. Lakisá video Oyo tokoki kosala mpo tókómisa makasi boyokani na biso na libala.
Boyekoli ya Biblia na lisangá: (Min. 30) jy mok. 103
Maloba ya nsuka (Eleka min. 3 te)
Loyembo 92 mpe libondeli