20-26/01
EBANDELI 6-8
Loyembo 89 mpe libondeli
Maloba ya ebandeli (Min. 1)
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE
“Asalaki kaka bongo”: (Min. 10)
Eb 6:9, 13—Noa moto ya sembo, afandaki esika moko na bato mabe (w18.02 lok. 4 par. 4)
Eb 6:14-16—Nzambe apesaki Noa mokumba moko monene (w13 1/4 lok. 14 par. 1)
Eb 6:22—Noa amonisaki kondima epai ya Yehova (w11 15/9 lok. 18 par. 13)
Tóluka biloko ya motuya ya elimo: (Min. 10)
Eb 7:2—Nini mpenza ezalaki kosalisa Bayisraele bákesenisa banyama ya mbindo ná banyama ya pɛto? (w04 1/1 lok. 29 par. 7)
Eb 7:11—Ekoki kozala ete mai ya Mpela oyo ezindisaki mokili mobimba eutaki wapi? (w04 1/1 lok. 30 par. 1)
Biloko nini ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, oyo okosepela kolobela mpo na Yehova Nzambe, mosala ya kosakola to eloko mosusu?
Botángi ya Biblia: (Eleka min. 4 te) Eb 6:1-16 (th liteya 10)
OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
Video mpo na kozongela moto mpo na mbala ya liboso: (Min. 5) Lisolo na bayangani. Lakisá video mpe na nsima tuná bayangani mituna oyo: Ndenge nini mosakoli asalelaki 1 Yoane 4:8 mpo na kosalisa nkolo-ndako akanisa? Ndenge nini basakoli basalaki elongo mpo na kopesa litatoli?
Kozongela moto mpo na mbala ya liboso: (Eleka min. 4 te) Salelá maloba ya kozongela moto mpo na mbala ya liboso oyo ezali na “Ndenge ya kobanda lisolo.” (th liteya 12)
Kozongela moto mpo na mbala ya liboso: (Eleka min. 4 te) Mpo na kobanda, salelá maloba ya kozongela moto mpo na mbala ya liboso oyo ezali na “Ndenge ya kobanda lisolo.” Na nsima pesá ye moko ya mikanda oyo ezali na kati ya bisaleli na biso mpo na koteya. (th liteya 7)
BOMOI YA BAKRISTO
Losambo na kati ya libota: Noa atambolaki elongo na Nzambe: (Min. 10) Lisolo na bayangani. Lakisá video. Na nsima bóyanola na mituna oyo: Na video oyo, ndenge nini baboti basaleli lisolo ya Noa mpo na kobimisa mateya oyo ekosalisa mpenza bana na bango? Makanisi nini ya malamu omoni na video yango, oyo okoki kosalela na losambo na bino na kati ya libota?
Bamposa ya lisangá: (Min. 5)
Boyekoli ya Biblia na lisangá: (Min. 30) jy mok. 100
Maloba ya nsuka (Eleka min. 3 te)
Loyembo 37 mpe libondeli