Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb19 Octobre lok. 5
  • Etamboli ya pɛto ná limemya makasi esimbaka mitema

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Etamboli ya pɛto ná limemya makasi esimbaka mitema
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2019
  • Masolo mosusu
  • Pesáká molongani na yo kilo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Landá toli ya Nzambe mpo ozala na libala ya esengo
    Okoki kozala na libota ya esengo
  • Zalá sembo epai ya molongani na yo
    Okoki kozala na libota ya esengo
  • Ndenge ya kofanda na kimya na bandeko ya libota
    Okoki kozala na libota ya esengo
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2019
mwb19 Octobre lok. 5

BOMOI YA BAKRISTO

Etamboli ya pɛto ná limemya makasi esimbaka mitema

Mbala mingi, bizaleli malamu ya basi oyo bakómaka bakristo, ebendaka mibali na bango na solo. Kasi, yango ekoki kosɛnga koyika mpiko na minyoko bambula mingi. (1Pe 2:21-23; 3:1, 2) Soki bazali konyokola yo kaka mpamba, kobá kosala malamu mpo na kolonga mabe. (Ro 12:21) Ndakisa na yo ya malamu ekoki kobimisa mbuma malamu koleka maloba na yo.

Meká kotalela makambo ndenge molongani na yo azali kotalela yango. (Flp 2:3, 4) Monisá ete ozali komitya na esika na ye mpe zalá na boboto; salá nyonso oyo esengeli mpo na kokokisa mikumba na yo na ndenge ebongi. Zalá moyoki malamu. (Yk 1:19) Zalá motema molai, mpe monisá molongani na yo ete olingaka ye kaka. Ata soki molongani na yo amoniselaka yo boboto to limemya ndenge wana te, okoki kotya motema ete Yehova asepelaka na bosembo na yo.​—1Pe 2:19, 20.

TALÁ VIDEO YEHOVA APESAKA BISO MAKASI YA KOMEMA MOKUMBA NA BISO, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Bomoi ya Grace Li ezalaki ndenge nini na ebandeli ya libala na ye?

  • Nini etindaki ye andima solo ya Biblia?

  • Ndenge nini ndeko Grace ayikaki mpiko na mikakatano nsima ya batisimo na ye?

  • Makambo nini ndeko Grace asɛngaki na libondeli mpo na mobali na ye?

  • Mapamboli nini ndeko Grace azwaki mpo na etamboli ya pɛto mpe limemya makasi oyo amonisaki?

Bililingi: Bilingi oyo euti na video “Yehova apesaka biso makasi ya komema mokumba na biso,” emonisi ndenge Grace Li azali kokende liboso na elimo. 1. Grace azali kolela na kulware.  2.  Ndeko mwasi moko azali koyekola Biblia na Grace Li. 3. Grace ná bana na ye balongwe na restora mpo na kokende na makita. 4. Grace ná bandeko na ye libwa ya libota bazali na Ndako ya Bokonzi.

Etamboli ya pɛto ná limemya makasi ezalaka na nguya!

Etamboli ya pɛto ná limemya makasi ekoki mpe kosalisa soki molongani na yo azwá batisimo kasi azali kosalisa libota na bino te esambela Yehova. Talá video Salisá molongani na yo “kozanga ete oloba”.

Ndeko mwasi moko azali kotala mobali na ye oyo atiká kosakola
    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto