Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb19 Août lok. 5
  • Bilenge—Bózala na “molende na misala ya malamu”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bilenge—Bózala na “molende na misala ya malamu”
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2019
  • Masolo mosusu
  • Mapamboli ya mosala ya Mobongisi-nzela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Kumisá Yehova na mosala ya mobongisi-nzela
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2020
  • Bangonga oyo esɛngami mpo na babongisi-nzela etalelami lisusu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Mapamboli ya mosala ya mobongisi-nzela
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2019
mwb19 Août lok. 5

BOMOI YA BAKRISTO

Bilenge​—Bózala na “molende na misala ya malamu”

Na mokanda oyo akomelaki Tito na litambwisi ya elimo santu, ntoma Paulo akomaki ete bilenge mibali, ata mpe Tito, basengeli kosala nyonso bázala ‘ndakisa na misala ya malamu na makambo nyonso.’ (Tit 2:6, 7) Kaka na mokapo yango, amonisaki mpe ete basaleli ya Yehova bapetolami mpo bázala na “molende na misala ya malamu.” (Tit 2:14) Moko ya misala ya malamu yango ezali ya kosakola mpe koteya makambo etali Bokonzi ya Nzambe. Soki ozali elenge, okanisi nini soki osaleli makasi na yo na mosala ya mobongisi-nzela mosungi to ya sanza na sanza?​—Mas 20:29.

Soki okolinga kosala mosala ya mobongisi-nzela, kanisá makambo oyo okosala mpo okóma mobongisi-nzela. (Lk 14:28-30) Na ndakisa, okozwa mbongo wapi mpo na kokokisa bamposa na yo ntango okosala mosala yango? Ndenge nini okokokisa ngonga oyo esɛngami? Bondelá Yehova asalisa yo. (Nz 37:5) Sololá na baboti na yo mpo na mokano na yo mpe na babongisi-nzela oyo bazali kolonga na mosala yango. Na nsima bandá kosala makambo oyo esengeli mpo na kokokisa mokano na yo. Na ntembe te, Yehova akopambola milende na yo na mosala na ye!

TALÁ VIDEO BILENGE OYO BAZALI KOKUMISA YEHOVA, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Mikakatano nini bilenge mosusu balongaki mpo bákóma babongisi-nzela, mpe ndenge nini basalaki yango?

  • Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango bákóma babongisi-nzela ya sanza na sanza?

  • Mpo na nini ezali na ntina kozala na programɛ ya mosala ya kosakola?

  • Ndenge nini bandeko ya lisangá bakoki kolendisa mpe kosalisa mobongisi-nzela?

  • Mapamboli nini babongisi-nzela bazwaka?

Elenge mwasi moko azali kosolola na tata na ye mpo na mosala ya mobongisi-nzela; elenge mobali moko azali kobongisa programɛ na ye ya mosala ya kosakola; elenge mwasi moko ya mobongisi-nzela azali na mosala ya kosakola elongo na ndeko mwasi moko; elenge mwasi moko ya mobongisi-nzela azali kotambwisa boyekoli ya Biblia

Nakoki kosala nini mpo nakokisa mokano na ngai ya kokóma mobongisi-nzela?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto