BOMOI YA BAKRISTO
Ndenge oyo biso nyonso tokoki kopesa mabɔkɔ mpo na kobatela bisika na biso ya losambo
Bandako ya Bokonzi ezali kaka bandako mpamba te; ezali nde bisika ya losambo ya Yehova. Ndenge nini mokomoko na biso akoki kopesa mabɔkɔ mpo na kobatela Ndako ya Bokonzi?
TALÁ VIDEO TÓBATELA BISIKA NA BISO YA LOSAMBO, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:
Ndako ya Bokonzi ezali na ntina nini?
Mpo na nini tosengeli kotyaka bopɛto na Ndako ya Bokonzi mpe kobatela yango malamu?
Kopesa mabɔkɔ na mosala ya kobatela Ndako ya Bokonzi ememeli yo matomba nini?
Mpo na nini kolongola makama ezali na ntina mingi, mpe bandakisa nini omoni na video oyo?
Ndenge nini tokoki kokumisa Yehova na makabo na biso?
NDENGE NINI NAKOPESA MABƆKƆ?