MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 BAKORINTI 4-6
“Tozali kotika te”
Kanisá ete mabota mibale ezali kofanda na ndako moko ya kala mpe ebebá. Libota moko ezangi elikya mpe yango ezali kokamwisa te. Kasi likambo ya kokamwa, libota oyo mosusu ezali na esengo. Mpo na nini? Mpo mosika te ekokende kofanda na ndako moko ya sika mpe ya kitoko.
Atako “biloko nyonso oyo ezalisamá ezali se kokimela elongo mpe konyokwama elongo tii sikoyo,” basaleli ya Nzambe bazali na elikya oyo elendisaka bango mpenza. (Ro 8:22) Toyebi ete mikakatano oyo tozali na yango sikoyo, ata mpe oyo enyokoli biso bambula ebele, ezali “ya ntango mokuse mpe ya pɛpɛlɛ” soki tokokanisi yango na bomoi ya seko na mokili ya sika ya Nzambe. Kotya miso na mapamboli oyo Bokonzi ekomemela biso ekosalisa biso tózala na esengo mpe tótika te.