Lisangá ezali koyoka ekateli ya lisangani ya mikóló-bakambi
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MISALA 15-16
Ekateli oyo bango nyonso bandimaki na kolanda Liloba ya Nzambe
Liteya nini tokoki kozwa na ndenge oyo basilisaki likambo yango?
15:1, 2—Zaláká na komikitisa mpe motema molai. Na esika básilisa likambo yango bango moko, Paulo ná Barnabasi balukaki litambwisi ya ebongiseli ya Yehova.
15:28, 29—Tyeláká ebongiseli ya Nzambe motema. Lisangá endimaki mpenza ete Yehova akotambwisa makambo na nzela ya elimo santu na ye mpe ya Kristo Yesu.
16:4, 5—Tosáká. Masangá ekobaki kokola ntango ezalaki kolanda litambwisi ya lisangani ya mikóló-bakambi.